Bunda etumba elamu ya kondima
Nkotela • 13
Na buku ya mateya oyo bokoyekola lolenge nini bokomilatisa bibundeli ya Nzambe, bokoyeba lokuta ya monguna mpe bokoyekola lolenge ya kokola elongo na baninga bandimi misusu. Bosili kokomama na monkanda ya babundi, nde sikoyo yekola lolenge ya kobunda etumba malamu ya kondima, mpe yebaka éte etumba mpo na elonga ya molimo ezali ya Nkolo. John Eldredge, azali molakisi oyo ateya mpe akomá minkanda mingi na makambo matali « Etumba ya molimo ». Ye alobi boye : « Lisolo ya lobiko na yo ezali lisolo ya kowumela mpe etondi na nkanza. Yango esepelisi monguna oyo ayebi ndenge nini bokoki bozala -mpe ezali kobangisa ye ». Ye ayebi oyo Nzambe abombeli bino ntango bozali koyekola lolenge ya kozala ya Klisto kati na mabota na bino, kati na bino na baninga, na bayebani mpe bazalani na bino. Bosengeli boyekola kobunda etumba. Oyo ezali linaka ya « kolandela malamu » ebongisami mpo na kosunga bino boyeba ndenge nini bokoki kobanda bomoyi ya baklisto ntango bozali na emoniseli (vizio) malamu ya komona makambo na mosika mpe bibundeli ya kobunda etumba malamo. Buku oyo ezali molakisi ya malamu. Stu Webber, mokonzi ya mapinga na kala, mpe sikoyo azali mobateli bampate na Nzambe, akomá makambo oyo etali lolenge ya yiki-yiki etali moklisto nyonso, ezala oyo azali nanu ya sika na kati ya Klisto to oyo azali mobundi ya makasi. Bazali kokutana na makambo yango mikolo nyonso. Moklisto nyonso azali kotambola kati na esika ya bitumba. Moklisto nyonso azali komema yiki-yiki ya nsomo mpenza na kati na ye. Mingi kati na biso bakozala bobele kobaluka na biloko ndenge nyonso ata oyo ekoki kosunga biso tolonga etumba te. Tobenga yango etumba kati na mosuni mpe kati molimo. Tobenga yango boluki ya bomoyi ya baklisto ya elonga… benga yango na nkombo nyonso oyebi. Kasi yango nde etumba ya putu-pata, mwana ya moninga mawa te. Na etumba wana osengeli ozala na molongo ya baye batelemi ngwi mpe bazali balongi. Mibeko ya etumba nde epesami na biteyelo ya mapinga ya mokili mobimba. Soki otali malamu, etumba ya molimo ekesani na etumba ya mosuni te (Mobundi nyonso asengeli kozela bobele abika na etumba pamba te, kasi asengeli lisusu asosola mpe asalela mibeko na etumba na ye ya mokolo-na-mokolo) mpo na « komibatela na nguya ya molili mpe komibatela na nguya ya milimo mabe ya bisika ya likolo » (BaEfeso 6 :12 Biblia). Okoki kosala malamo koleka moto oyo abiki na etumba. Okoki kolonga etumba, kasi na elonga na yo Klisto akozwa lokumo. Senga mayele mpe makasi epai ya Nzambe ntango ozali koyekola sôló ya Liloba na Ye. Senga bozindo ya kososola makambo mpo ososola sôló na Ye. Senga molende mpo osala yango na bomoi na yo, mpe bolingo mpo okabola yango na
~ Stu Webber. Spirit Warriors. Sisters, OR: Multnomah Publishers, 2001, p. 16.
Made with FlippingBook - Share PDF online