Bunda etumba elamu ya kondima

“Misisa Esanto » ezali nkombo TUMI ayebisaka na ntina mpenza ya kotatola ya bikela, mpe masangá kokesana ya kondima ya baklisto oyo esalemaka kati-kati ya mibu 100 mpe 500 sima ya Klisto mpe ebimisaki mibeko ya ntina mpenza ya bondimi, bakisa ya Kano, ya losambo, ya bondimi mpe mibeko etali etambweli ya lingomba. TUMI amipesi mpo na kosunga mangomba ya bingumba (to ba ville) mpo bázóngela misisa (ebengami lisusu Bonkoko Monene) mpo na nguya ya bobandeli mpe ya kotindama na mosala.

Esaleli mpe lisungi oyo ebongi na kosalela mikolo nyoso, ya motuya mpe ya ntina, ebongisami mpo na kosunga baklisto ya sika, baye bazali nanu kokola mpo bakoma bayekoli to babundi ya Klisto ya solo, mpe Yango (esaleli oyo) etongami mobimba uta na Lisolo na Nzambe lokola elobami na Makomi Esanto. Wana elandani na mabongisi ya ekaniseli ya buku ntoma Paulo akomelaki baefeso, liteya oyo ezali lisungi mpo na baklisto ete basosola oyo Bilblia elobi na ntina ya epimeli ya ntina na lisunngi na biso na kati ya lisolo monene ya Nzambe na mateya libwa esangisami. Koyekola oyo ebandi na

makapo ya ntina mpo na kokokisa oyo ya biso mosala na lisolo ya Nzambe, yango ekosunga bayekoli ete bakola lokola balandi ya Klisto ntango bapikami na moboko ya kondima mpe etambweli ya baklisto. Lisungi oyo ekoyebisa biso mabongisi ya biteyelo TUMI Capstone abongisi mpo na kolakisa bayekoli ya Klisto liboso nanu eteyelo yango esalami te. Yango ekopesa mateya ya makambo ya Biblia ya liboso mpenza lisanga na mibeko esali moboko ya ezaleli ya baklisto. Etando ya mateya 1. lisapo oyo tobikaka : kosangisa lisolo na biso na lisolo oyo ya Nzambe 2. makomami oyo tosalaka : kondima misala na biso kati kati ya kowelana ya mokili na bileko nyonso. 3. bokoti oyo tozwaka : Kosangisa bomoyi na biso na oyo ya Nzambe kati na Klisto 4. Makabo oyo tozwaka : mosala ya molimo mosanto na kati ya etumba elamu ya kondima 5. makambo eleki malamu oyo totalisaka : kobika lokola basantu ya Nzambe mpe batalisi Kristo na mokili 6. malendisi oyo tolukaka : kolendisana biso na biso kati na Nzoto ya Kristo 7. monguna oyo tobundisaka : kotambola kati na elonga liboso ya monguna ya Nzambe 8. bibundeli oyo tosalelaka : kolatisama na bibundeli nyonso ya Nzambe 9. Bokasi oyo totalisaka : koyika mpiko lokola basantu

www.worldimpact.org • www.tumi.org

Made with FlippingBook - Share PDF online