Bunda etumba elamu ya kondima
This is the Lingala version of Fight the Good Fight of Faith
B sala ya yo mosala na kati ya lisolo ya mabaongisi ya Nzambe
ekomami epayi ya Rev. Don Allsman mpe Rev. Don L. Davis
LINGALA
Bunda Etumba Elamu ya Kondima sala ya yo mosala kati ya lisolo ya mabongisi ya Nzambe Misisa ya Bule elandani na mabongisi ya mateya
epayi ya Rev. Don Allsman mpe Rev. Don L. Davis
TUMI Press 3701 East 13th Street North, Suite 100 Wichita, Kansas 67208
The urban Ministry Institute ezali lotomo ya World Impact, Inc
Bunda etumba elamu ya Kondima : sala ya yo mosala kati ya lisolo ya mabongisi ya Nzambe
© 2014, 2016. The Urban Ministry Institute. Ndingisa nyonso epekisami ebimi mbala ya yambo na 2014, mpe mbala ya míbale na 2016
© 2025 Buku oyo ebongolamaki na Splendide Nsongi Kinkosi
epekisami kobimisa, kokabola to mpe koteka mokanda oyo, to bokaboli na lolenge mosusu mpe epekisami. Kaka soki nzela epesameli yo na kolanda mobeko ya moto akoma buku oyo na 1976 to kobimisa epekesami epayi ya mobimisi. Mpo na bosenga nyonso esengeli koko ma na :
The Urban Ministry Institute 3701 East 13th Street North, Suite 100 Wichita, Kansas 67208
ISBN : 978-1-62932-198-1
Ebimi epayi ya Tumi Press oyo ezali eteni moko ya World Impact, Inc.
The Urban Ministry Institute ezali lotomo ya World Impact, Inc.
Makomi nyonso etangami awa ebongisami epayi ya mokomi ya buku oyo.
Ndimbola ya elili oyo ezwami na lokasa ya ebandeli ya buku oyo : Elili yango ezali kolakisa biso moto atelemi pembeni ya etando ya mayi. mpe azali kotala na mayi, lolenge azali kotala, amoni elilingi na ye lokola mobundi ya Klisto mpenza. ( Baefeso 6.10-18)
Buku oyo ekomami na ekaniseli mpe lokomu ya Balakisi mpe bateyi ya bayekoli ya Klisto, baye babotami sika mpe baye basengeli kokola … Mpo na babateli mpate, bateyi, balakisi, bakengeli molimo, mpe bayekoli mpo na baye nyonso basenzelaka mpe babatelaka milimo mpe bamonisaka bolingo epayi ya basantu, baye mposa na bango ezali kosila te mpo na kolendisa bayekoli ya Klisto, mpe bazali kosala makasi ya kolinga, kobondisa, koteya mpe kosunga na nzela ya Molimo Mosanto na mokili mobimba. Tosepeli na ngolu na Nzambe mpo basálélí makabo na bango mpo na kotelemisa ekeke ya sika ya basali baye bazali na makoki ya molimo mpo na kopesa lokumo epayi ya Nkolo Yesu mpe mpo na kokolisa Bokonzi na Ye. • • • Mpo na basangani na ngai ya mosala Fairmont Park baye basali bambula ebele, mpe bandimeli nguya ya koluka mpe kopesa makoki ya lobiko epayi ya bilenge, bakambi ya sika na bingumba lokola ngai moko mpo na bokonzi ya Nzambe. Don Davis • • • mpo na Shirley Isaac, moninga na ngai ya kelasi ya motoba oyo atéyáká ngai Yesu mpe Nsango Malamu, mpe epayi ya Theron Friberg, mokambi na ngai na eteyelo ya bilenge ya eklezia, oyo akaboli bolingo na ye mpo na Biblia mpe alakisi ngai kotambola kati Molimo. Don Allsman • • • makambo oyo oyokaki epayi na ngai liboso ya batatoli ebele, teya yango na bato ya sembo oyo bazali na makoki ya koteya yango lisusu na bato misusu. 2 Timote 2:2
Etando ya Mateya • 5
E tando ya M ateya
7 Nkotela
15 Liteya ya yambo (1) Lisapo oyo tobikaka :
Kosangisa lisolo na biso na lisolo oyo ya Nzambe
27 Liteya ya míbale (2)
Makomami oyo tosalaka : Kondima misala na biso kati kati ya kowelana ya mokili na bileko nyonso
41 Liteya ya mísato (3) Bokoti oyo tozwaka :
Kosangisa bomoyi na biso ná oyo ya Nzambe kati na Klisto
55 Liteya ya míneyi (4)
Makabo oyo tozwaka : Mosala ya Molimo Mosanto na kati ya etumba elamu ya kondima 69 Liteya ya mítano (5) Makambo eleki malamu oyo totalisaka : Kobika lokola basantu ya Nzambe mpe batalisi Kristo na mokili
83 Liteya ya mótoba (6)
Malendisi oyo tolukaka : Kolendisana biso na biso kati na Nzoto ya Klisto
97 Liteya ya sámbo (7)
Monguna oyo tobundisaka : Kotambola kati na elonga liboso ya monguna ya Nzambe
109 Liteya ya mwámbe (8)
Bibundeli oyo tosalelaka : Kolatisama na bibundeli nyonso ya Nzambe
123 Liteya ya líbwa (9)
Bokasi oyo totalisaka : Koyika mpiko lokola basantu
6 • Bunda etumba elamu ya kondima
137 Mikanda ya kobakisa 139 Mokanda 1 • Ezalaki mokolo moko :
Mabongisi ya mokili ndenge elobami na Biblia
142 Mokanda 2 • Lisolo oyo Nzambe azali kobeta 143 Mokanda 3 • Lolenge nini esengeli tobanda kotanga Biblia ? 145 Mokanda 4 • Yesu ya Nasaleta : komonana ya ntango ezali koya. 146 Mokanda 5 • Lisolo ya Nzambe : misisa na biso ya bule 147 Mokanda 6 • Liboso ya ebandali ya ntango mpe sima : Mwango ya Nzambe mpe lisolo etali moto 148 Mokanda 7 • Elili mpe bozalisami 149 Mokanda 8 • Kati na Klisto 150 Mokanda 9 • Litatoli na biso ya kotalela Nzambe : Bonsomi kati ya Klisto Emoneneli mobimba ya Klisto mpe matatoli. 156 Mokanda 13 • Kososola Biblia ndambo mpe na mobimba. 158 Mokanda 14 • Mapamboli ntuku misato na misato (33) kati na Klisto 162 Mokanda 15 • Nkunki 163 Mokanda 16 • Kokende liboso mpe kozongisa miso sima : Kozongisa nsango malamu ya Bonkoko Monene. 169 Mokanda 17 • Komonisa mokuse ya Makomi. 173 Mokanda 18 • Etándo ya ntango ya Boyokani ya sika 174 Mokanda 19 • Kokabola Masiya : Boyokani ya nsango malamu 175 Mokanda 20 • Makoki ya komonisa : Kokolisa montango ya bayekoli ya bokonzi ya Nzambe. 176 Mokanda 21 • Kobika ndenge boyokani ya sika etindi : mpe kobika na bokeseni na yango. 177 Mokanda 22 • Yesu Klisto, moboko mpe mama na likambo ya Biblia 178 Mokanda 23 • Tika Nzambe atombwama ! Ba “Ko” sambo ya koluka Nkolo mpe kosenga lisungi na ye. 179 Mokanda 24 • Litatoli na kondima ya Nikea 180 Mokanda 25 • Litatoli na kondima ya Nikea mpe makomi na yango na Biblia 182 Mokanda 26 • Litatoli na kondima na Bantoma 153 Mokanda 10 • Mpo na efandelo (oikos) 154 Mokanda 11 • Lilako mpo na Klisto molóngi 155 Mokanda 12 • Klisto molongi :
N kotela
Kozalisa bato bayekoli ezali kaka likambo ya kokabola boyebi te kasi ya kopesa bomoyi.
Juan Carlos Ortiz
Mbote na bino, baninga babundi minene na nkombo na nguya ya Nkolo na biso Yesu Klisto ! Ezali esengo na biso kopesa bino buku oyo mpo na bayekoli oyo basengeli kokola mpe babundi ya klisto. Bunda etumba elamu ya kondima : Sala ya yo mosala kati ya mabongisi ya Nzambe. Liteya kati na buku oyo emonisi na mokuse mabongisi ya Makomi esantu, ekomami na kobeta nsete na ntina ya koyekola Biblia na oyo yango ezali kolakisa mpo na maye etali lobiko na biso na lisolo monene na Nzambe. Tondimi mpenza ete lisolo ya solo ya mokili, ntina mpe suka na yango ebonbami na Biblia. Makomi esantu emonisi Nzambe lokola mozalisi ya bomoyi, mokeli ya mokili oyo apesáká elaka na Abalayama mpo na kotia nkona ya lipamboli mpo na mabota nyonso ya mokili. Nzambe asalaki ete ayebana na libota na Ye ya Yisalaele, libota oyo Masiya mopakolami abotamaki. Yesu azali mosali oyo Nzambe aponáka mpo ete aya na mokili mpo na kolonga liwa, kosukisa bilakeli mabe mpe kofandisa bokonzi na Ye kati na bato. Ya solo, Masiya ayaki mpenza na nzela ya libota na Ye Yisalaele, mpe toyebi ete azali Mosikoli mpe Mokonzi, Yesu ya Nasaleta. Makomi Esantu etatoli nkembo na Ye oyo amonisaki mwango mpe nkembo na Nzambe epayi na bato nyonso, Asikolá biso na masumu na nzela ya liwa na Ye na ekulusu, mpe lisekwa na ye kati na bakufi, mpe akozonga mbala ya mibale mpo na kobongisa makambo nyonso. Tango tobongoli motema mpe tondimi Yesu lokola Nkolo mpe Mobikisi, lisolo monene ya Nzambe ekómi ya biso mpenza, ekómi mpo na biso lisolo ya kokamwa, ya ngolu mpe bolingo, mabongisi kitoko oyo tozwi ebengisi biso tokabola mpe tobika na bato misusu kati ya libota mpenza ya Nzambe, lingomba. Maye tokoyekola : Lolenge nini ebongi kobunda etumba malamo ya kondima ? Buku oyo ekomami mpo na kopesa motangi mwángo ya mituna minene mpe makambo ya ntina ya lisolo (mabongisi) oyo ya polele mpe pete (na bolembu) na botangi na yango ; na bongo, ekosunga bino bososola yango na lolenge ya koyeba kozala na boyokani na Nzambe mpe na bato misusu wana tozali kobika na kati ya lingomba. Yango etindami mpo na kopesa bino bandimi, bino bato bozali na mposa mpe na bosenga ya kokola, mateya
7
8 • Bunda etumba elamu ya kondima
libwa esangana oyo etatoli makambo ya ntina ya mabongisi ya Nzambe na kotala yango malamo mpenza moko-moko mpe komanyola, mpe kokabola makanisi kati na bino lokola basaleli oyo bawuti kokota na kati ya makambo nyonso tozali kobikela na mokili. Wana bokaboli ya makanisi ezali kosalema na ntina na makambo ya solo oyo ebongisami na ntoma Paulo na monkanda ya Baefeso, mateya ebongisami mpo na kopika bino na moboko ya kondima mpe na etambweli ya malamo oyo ebongi na bandimi. Tala sikoyo mitú libwa ya mateya, mpe ndimbola ya moko na moko na yango na mokuse. Liteya ya yambo (1) : Eleko oyo tozali kobika : kosangisa makambo ya bomoyi na biso mpe na oyo ya Nzambe. Liteya oyo ekosunga yo koyeba ete Nzambe ya molongo (ya mokili), Nkolo Nzambe oyo aleki na nguya, azali se moko, Nzambe ya solo mpe Yawe Nzambe oyo azali komonisama na ndenge misato : Tata, Mwana mpe Molimo Mosanto. Ye nde azalisi biloko nyonso oyo emonanaka mpe oyo emonanaka te mpe asali bato na elilingi na Ye. Liteya oyo etali mpe botomboki ya satana mpe kobuka mobeko ya bato ya liboso, Adama mpe Ewa, baye bazangi botosi mpe na nzela na bango mokili elakelami mabe. Ata bongo Nzambe alakaki biso mobikisi oyo akolonga mabe mpe akozongisa makambo nyonso mpo na nkembo na ye. Liteya ya míbale (2) : makomami oyo tosalaka : kondima misala na biso kati kati ya kowelana ya mokili na bileko nyonso, elimboli lolenge Yesu ya Nasaleta alongaki Zabulu (Satana) mpe alongolaki biso na bilakeli mabe na lisungi ya bomoyi na Ye (Yesu) oyo ezangi masumu mpe kokufa na ye na esika na biso. Sikoyo na nzela ya kobongola motema (koboya masumu mpe kozongela Nzambe), mpe na nzela ya kondima (kondimela solo oyo ezali na makambo etali Yesu), tokoki kozala na bokonzi ya Nzambe. Nzambe abikisi biso na ngolu mpe tobatisami kati na nzoto ya Klisto mpe Molimo Mosanto apesameli biso mpo na kobika bomoyi ya baklisto. Liteya ya mísato(3) : bokoti oyo tozwaka : Kosangisa bomoyi na biso na oyo ya Nzambe kati na Klisto, Yango elakisi biso lolenge tokangami na Yesu na nzela ya kondima (elakisi ete tozali sikoyo kati « na Klisto »). Na ntina ya lisanga wana yo ozali kozwa mpe kobikela makambo nyonso oyo Yesu azali mpe oyo apesi. Na nzela ya Molimo Mosanto, tokomi bato ya ndako na ye elongo na Yesu oyo azali lokola libanga na motu ya efelo ya ndako yango, mpe bantoma na basakoli bakomi moboko ya ndako. Etonga moko na moko ekosala lokola batindami baoyo bamonisi Bokonzi ya Nzambe, baye bazwi esika ya kokengela bomengo ya lola. Biso bandimi tozali lokola batindami na esika ya Nzambe mpe basali na Bokonzi na Ye. Liteya ya míneyi (4) :Makabo oyo tozwaka : mosala ya molimo mosanto na kati ya etumba elamu ya kondima. Liteya oyo ebeti sete na lolenge Molimo Mosanto afandi kati na bandimi nyonso mpe akopesaka bango makabo mpo basalela Eklesia. Tozali na bonsomi ya kosalela makabo na biso kati
Nkotela • 9
na bandimi nyonso mpo Molimo Mosanto apesi biso makoki wana, alakisi biso nzela mpe akembisi biso. Tokoli na lisanga wana mondimi nyonso azali kosalela lisanga mpe bondeko na kati ya bomoko mpe bolingo. Liteya ya mítano (5) : makambo eleki malamu oyo totalisaka : kobika lokola basantu ya Nzambe mpe batalisi Kristo na mokili, tomoni ete tobengami komekola Nzambe lokola bana na ye ya motuya mpe ya bolingo. Tokomisami basanto (babulami) ya Nzambe na kati na Klisto mpe totindami kotalisa Nzambe epai ya baninga misusu lokola libota na ye ebulisami oyo bazali ntango nyonso kokanisaka bolamo mpe lolenge na ye. Tobengami lisusu na ye mpo na kokabola Nsango Malamo ya bomoyi epayi ya baninga, bandeko, mpe bazalani na kosalaka mpe komonisaka misala malamo ya bolingo epayi ya Klisto mpe epayi ya bato misusu. Liteya ya motóba (6): malendisi oyo tolukaka : kolendisana biso na biso kati na Nzoto ya Kristo efungoli likanisi ya bomoyi ya baklisto lokola esengli kobikela na kati na lisanga, kokola elongo lokola libota na Nzambe, komonisa ete tozali nzoto ya Klisto mpe Tempelo ya Molimo Mosanto. Tobengami tobika lobiko ya Klisto lisanga na basusu, na koyeba sôlo, kosambela Nzambe lisanga, mpe kofuluka lokola bayekoli ya Klisto wana esangani biso, emonisi biso boyokani na lingomba songolo to na masangá mike-mike. wana tozali kosala bongo totongami mpe tolendisami na kondima mpe tokoyeba komitosa biso na biso na bobangi Klisto. Liteya ya sámbo (7) : monguna oyo tobundisaka : kotambola kati na elonga liboso ya monguna ya Nzambe, elakisi lolenge ya mabongisi minene oyo tosangani na yango. Mokili ezali na etumba ya molimo, zabulu na mokonzi ya molili bazali kobundisa Nkombo ya Yesu Klisto mpe bokonzi ya pole. Na nzela ya bomoi, liwa mpe lisekwa na ye, Yesu alongá monguna, zabulu oyo azali bobele kokoba mosala na ye na nzela ya lokuta kati na mabongisi ya mokili oyo ekweya mpe kati na ezaleli na biso ya kala (to mposa na biso ya nzoto). Tozali kolonga ye bobele soki tozali kotambola na kondima epayi ya Yesu Klisto, mpe soki totamboli na bokebi na ntango azali koluka akweyisa biso na nzela ya lokuta na ye. Liteya ya mwámbe (8) : bibundeli oyo tosalelaka : kolatisama na bibundeli nyonso ya Nzambe elingi koloba lolenge Nzambe apesi na mondimi nyonso bibundeli oyo akoki kotelemela mongunda mpe na koleka mpo na koyika mpiko ntango monguna abimeli ye na etumba. Bosôló ya Makomi esanto (liloba na Nzambe) nde ekoki koyebisa biso nani tozali, lolenge tokoki kotelemela mpe koboya lokuta oyo azali kosalela epayi na biso. Molimo Mosanto azali kolendisa biso na etumba ntango tozali kosalela mitindo molimo apesi na biso, ezala ozali yo moko to elongo na bandimi misusu. Liteya ya líbwa (9) oyo ezali liteya na biso ya suka ebengami Bokasi oyo totalisaka : koyika mpiko lokola basantu. Na liteya oyo tozali komona éte
10 • Bunda etumba elamu ya kondima
likambo oyo eleki monene mpo na kokola kati na Klisto ezali koyekola kozala na bokasi, na bokengi mpe komimona mpamba te, lisosoli mpe komizangisa kokangama na motambo. Lokola bato bazali na batalisi ya Klisto, tosengeli kosala makasi mpe kokoba kokende bobele liboso kino tozwa mbano, ata kaka ndenge nini kati na mosala. Molimo Mosanto akosunga biso ete tolendisa bandimi misusu kati na bitumba. Mwango ya liteya moko-moko. Biteni ya liteya na liteya. Mateya nyonso ekabwani na biteni ya kokokana (moko eleki mosusu na makabo te) mpe likabo moko moko ezali kobeta nsete na likambo ya ntina mpenza oyo ekosunga ete bolobelaka bobele yango kino bosilisa liteya mobimba. (Yango ezali na motuya mingi wana endimi bino kokoba kino kosilisa buku oyo bino na baninga misusu, ntango bozali lokola balandisi to basalisi ya bitonga mike-mike). Mposa ya kokokisa nsima ya liteya. Bamposa oyo bozali kolikya na suka ya liteya , mposa misato-misato na liteya moko- moko, ekosunga bino kososola malamu eloko nini bosengeli koyeba mpe kondima soki bosilisi liteya, ezala ozali koyekola yo moko to na bato misusu. Libondeli ya kofungola mpo na kosenga bwanya. Libondeli oyo tozali kolendisa bino koyeba yango na motu mpe kobondela yango na mongongo makasi ezali kosenga Nkolo ete abongisa mitema na biso liboso tokota na kati ya koyekola na biso ya solo oyo ezali na Biblia ; na bongo tosengeli kososola mpe tozwa oyo Nkolo abongiselaki biso. Bokutani. Eteni oyo ya « bokutani » ezali eteni oyo ebandisi liteya wana. Yango etindiki liteya na kati ya mituna, makambo mpe bizaleli oyo tozali kokutana na yango, kobikela mpe kosala mokolo na mokolo na bomoyi na biso, oyo elandani na makanisi ya eteni ya liteya oyo. Bolekisa ngonga mingi na ndakisa mpe bokanisa na bokebi nyonso lolenge makambo wana ekoki kosalema. Yango ekokotisa makanisi na bino na bozindo mpenza mpe ekosunga bino na boluki-luki ntango bozali kokende liboso kino bosilisa liteya moko-moko. Makambo oyo ezali na kati na liteya. eteni oyo ya « Bozindo ya liteya » nde ezali kopesa biso ndimbola ya nkotela ya liteya oyo tolingi toyekola. Yango ekopesa mituna ya makambo oyo ezali kosalema mpe makomí ya Biblia oyo ekoyanola yango, mpe makomi oyo tokoluka mpo na liteya songolo. Na mokuse. Sima ya kotala lisusu makomi mpe koyanola mituna na eteni ya makambo oyo ezali na kati ya liteya, liteya nyonso nde epesi bino mokuse ya ndimbola na yango oyo etondi na makanisi ya ntina mpenza mpe solo ekutami mpe esengeli elobama na kati na makanisi yango. Yango nde ekosunga komonisa nzela, kotala malamo soki bososoli mpe bokangi
Nkotela • 11
« makanisi ya ntina » ya liteya esalemi ntango boyekolaki makomi moto na moto na ndenge na ye moko. Minkanda ya kobakisa. Tokelákí mpe tobakisi bilili oyo ekoki, makambo misusu mpe minkanda misusu ya kobakisa oyo ekoki kosunga bino kososola mpe kosalela makambo oyo ezali na kati ya mateya. Tala na Minkanda ya Kobakisa oyo ezali na eteni oyo, lokola ebongi na kokolisa bososoli ya mibeko ya ntina na liteya moko moko. Mobeko ya ntina. Eteni oyo ya liteya ezali ntango nyonso kopesa likanisi ya liteya mobimba na molongo to verset moko. Koyekola makambo tokutanaka na yango. Eteni oyo ezali na motuya mingi mpo epesi bino makoki ya kokanisa oyo ekoya sima ya koyekola mateya mpo na makambo oyo ezali mpe oyo ekoki kozala. Solo ezali tê kaka esengo ya kokanisa, kokabola mpe kowelana na maloba ; kasi kozala moyekoli ya Yesu etali bomoyi mpenza mpe makambo oyo ezali komonana mpe bato bazali kokutana mpe kobikela na yango. Makambo yango ebongisami mpo na kolamusa makanisi na bino mpe kosunga bino wana bozali nanu kokola lokola bayekoli, mpe bososola lolenge nini bokokesenisa solo ya Liloba na Nzambe na solo oyo ezali kati ya bomoyi na bino. Koyeba solo ezali bobele likambo ya kokóma na mayele mingi mpamba te, kasi ezali nde kosikola (kokangola) bino na mabe. (Yoani 8 :31-32) Makambo oyo eleki « biyano kitoko » na motuya ezali « koyekola na komikitisa ». Na esika ya kopesa biyano ya malamu, mikitisa. Bokomona na boyekoli ya Biblia ete na momesano, boluki-luki na biso bato ekoki ata moke te kopesa eyano oyo ekoki, oyo ezali polele, na bosembo mpe solo. Kasi tobengami mpo na kobanza, mpe komipesa na koyekola Liloba ya Nzambe na komikitisa, mpe tokomeka makambo nyonso mpe kosimba oyo ezali malamu (1Batesaloniki 5 :21). Esengeli koyekola makambo nyonso mpo na komona ndimbola na yango towuti koyekola mpe kofungola motema ete bopesa esika na Molimo abongola lolenge na bino ya kososola makambo mingi oyo bokokutana na yango na mateya. Bokutanisi. Eteni oyo elobi makasi mpo na kolakisa mpe komonisa solo ya liteya bozwi. Bosengeli bomonisa botongani to bokutani nini ezali kati na oyo bozali koyekola mpe oyo bozali kokanisa, koloba, kobikela mpe koyebisa na bato misusu. Mpo na yango, na eteni oyo, boluka makambo ekoki kokokana na liteya bozali koyekola na bomoyi na bino moko. Kondima. Eteni oyo ya maloba moke mpe eyebisi makambo ebele ezali na solo oyo ewuti na biteni ya liteya oyo tokoki mpe tosengeli tozali na lotomo ya koyambola mpe kotatola na poso oyo mobimba.
12 • Bunda etumba elamu ya kondima
Libondeli. Tokotisi libondeli ya ndeko moko oyo azali mokambi na eklezia mpo na kopesa bino likanisi na mitindo ya mposa mpe mabondeli kokesana na oyo ekutani na bosenga na lobiko ya makambo ya eklezia. Kokîmela to kolela na motema epayi na Nkolo. Yango ezali libondeli oyo bosengeli kosala na suka ya liteya. Mabondeli ekoki kobongisama mpe ekomama na lokasa yambo ya kobondela (lokola tomoni na Nzembo ya Dawidi na Biblia). Mabondeli oyo ekosunga biso kosenga ngolu songolo epayi na Nkolo, ngolu oyo tosengeli kozwa mpe komonisa solo na yango na misala oyo ekomonana. Mateya ya kokoba. Biloko oyo ezali mingimingi mpenza makanisi ewuti na bino ntango bolingi bokolisa bososoli ya likambo to liteya toyekoli. Mpo na liyangani ekoya. Eteni oyo ezali komonisa liboso mpenza mitú ya mateya tokomona, na molongo ya mateya tolengelaki, mpe epesi likanisi ya kotala malamu mpe kokanga ntina na oyo ekoleka na mbala ekoya. Makomi ya kobomba na mutu. Tondimi ya solo mpenza ete soki tobombi makomi ya Liloba ya Nzambe na motú, tosali lisumu epayi ya Nkolo te. (Nzembo ya Dawidi 119 :11). Koyekola makomi na motu ezali lilendisi ya mitema na biso mpe ntina ya makoki oyo ekosunga mpo na kotelemela lokuta ya monguna. Na bongo, na poso moko ebongi koyekola bobele molongo ya makomi moko pamba ya koyekola na motu. Boye bokoki komipesa na koyekola ata eteni ya mokabo moko ya Biblia oyo ekoki kokanisela bino ya solo oyo boyekolaki mpe ekosunga bino na etambweli na poso mobimba mpe baposo ekoya. Mosala ya kosala na ndako. Eteni oyo ya suka ezali na « makanisi oyo ewuti na makambo oyo eyébani, elobamaki, mpe esálemaki » na makambo songolo mpe na misala ya kokokisa na liteya. Emonani ete ezali na motuya mingi mpe ezali kosalema. Soki bomipesi na kosala yango na motema moko mpe bosali yango malamu mpenza, koyekola na bino ya mateya ekokola mingi mpenza. Yango ebongisami mpo na bino bokola na kati ya Klisto, wana bokozwa boyebi na polele oyo ewuti malako ewuti na mateya oyo boyekoli. Boye, nabondeli bino, bokokisa mosala. Bunda Etumba Elamo ya Kondima : Sala oyo ya yo mosala kati na mabongisi ya Nzambe. (Mwango ya kolanda Misisa Esanto). Kokóma moklisto ezali kokota na lisolo ya ezaleli ya Nzambe, lisolo oyo Nzambe azali koloba mpe kokokisa ntango nyonso ! Lisolo na Ye ya lisiko mpe ya bolingo, ya lobiko mpe ya elikya, ya etumba mpe ya elonga oyo ebengami lelo lisolo na yo. Misisa Esanto ya lisolo wana ezali kozonga kino na ebandeli ya mokili mpe kokende kino na elikya ya nkembo ya Bokonzi ya Klisto. Na nzela ya kondima epayi na Nkolo Yesu, bosi bosikolama na masumu, bosikolama na etumbu mpe na bǒwumbu mpe bokótá na etumba.
Nkotela • 13
Na buku ya mateya oyo bokoyekola lolenge nini bokomilatisa bibundeli ya Nzambe, bokoyeba lokuta ya monguna mpe bokoyekola lolenge ya kokola elongo na baninga bandimi misusu. Bosili kokomama na monkanda ya babundi, nde sikoyo yekola lolenge ya kobunda etumba malamu ya kondima, mpe yebaka éte etumba mpo na elonga ya molimo ezali ya Nkolo. John Eldredge, azali molakisi oyo ateya mpe akomá minkanda mingi na makambo matali « Etumba ya molimo ». Ye alobi boye : « Lisolo ya lobiko na yo ezali lisolo ya kowumela mpe etondi na nkanza. Yango esepelisi monguna oyo ayebi ndenge nini bokoki bozala -mpe ezali kobangisa ye ». Ye ayebi oyo Nzambe abombeli bino ntango bozali koyekola lolenge ya kozala ya Klisto kati na mabota na bino, kati na bino na baninga, na bayebani mpe bazalani na bino. Bosengeli boyekola kobunda etumba. Oyo ezali linaka ya « kolandela malamu » ebongisami mpo na kosunga bino boyeba ndenge nini bokoki kobanda bomoyi ya baklisto ntango bozali na emoniseli (vizio) malamu ya komona makambo na mosika mpe bibundeli ya kobunda etumba malamo. Buku oyo ezali molakisi ya malamu. Stu Webber, mokonzi ya mapinga na kala, mpe sikoyo azali mobateli bampate na Nzambe, akomá makambo oyo etali lolenge ya yiki-yiki etali moklisto nyonso, ezala oyo azali nanu ya sika na kati ya Klisto to oyo azali mobundi ya makasi. Bazali kokutana na makambo yango mikolo nyonso. Moklisto nyonso azali kotambola kati na esika ya bitumba. Moklisto nyonso azali komema yiki-yiki ya nsomo mpenza na kati na ye. Mingi kati na biso bakozala bobele kobaluka na biloko ndenge nyonso ata oyo ekoki kosunga biso tolonga etumba te. Tobenga yango etumba kati na mosuni mpe kati molimo. Tobenga yango boluki ya bomoyi ya baklisto ya elonga… benga yango na nkombo nyonso oyebi. Kasi yango nde etumba ya putu-pata, mwana ya moninga mawa te. Na etumba wana osengeli ozala na molongo ya baye batelemi ngwi mpe bazali balongi. Mibeko ya etumba nde epesami na biteyelo ya mapinga ya mokili mobimba. Soki otali malamu, etumba ya molimo ekesani na etumba ya mosuni te (Mobundi nyonso asengeli kozela bobele abika na etumba pamba te, kasi asengeli lisusu asosola mpe asalela mibeko na etumba na ye ya mokolo-na-mokolo) mpo na « komibatela na nguya ya molili mpe komibatela na nguya ya milimo mabe ya bisika ya likolo » (BaEfeso 6 :12 Biblia). Okoki kosala malamo koleka moto oyo abiki na etumba. Okoki kolonga etumba, kasi na elonga na yo Klisto akozwa lokumo. Senga mayele mpe makasi epai ya Nzambe ntango ozali koyekola sôló ya Liloba na Ye. Senga bozindo ya kososola makambo mpo ososola sôló na Ye. Senga molende mpo osala yango na bomoi na yo, mpe bolingo mpo okabola yango na
~ Stu Webber. Spirit Warriors. Sisters, OR: Multnomah Publishers, 2001, p. 16.
14 • Bunda etumba elamu ya kondima
bandeko mosusu. Tobengi yo oya koyekola elongo na biso, toyekola epai ya Molimo, wana azali koteya yo kobunda Etumba elamu ya kondima. Na nkombo ya Don Allsman, moninga mokomi minkanda mpe mobundi ya etumba, mpe na lisanga mobimba ya TUMI, baye babulisaki ngonga mpe makasi na bango mpo na mwango ya mosala oyo, totondi Nzambe mpo na bomoi na bino. Tobondeli Nzambe ya solo mpo na kobikisa mpe kozongisa bikelamo na ye na bolamo na yango ya kala. Ozali na oyo ya yo eteni ya mosala ya motuya ya kokokisa. Boyeyi Malamu na libota, boyeyi malamu na etumba ! Dr.Don L.Davis Wichita, Kansas, Advent 2O14
L iteya ya yambo (1) L isapo oyo tobikaka na kosangisa lisolo na biso na lisolo oyo ya N zambe
Asopaki ngolu yango epai na biso na boyebi nyonso mpe na bososoli. Ayebisaki biso libombami na mokano na ye pelamoko na mwango na ye oyo emonisi ye kati na Klisto, lokola ebongisaki ye mpo na kokokisa elaka ete ayanganisa biloko nyonso kati na Klisto lokola motó, yango na Likolo mpe yango na nse.
(Ba Efese 1 :8-10 Biblia Haut Fleuve)
Mposa ya kokokisa sima ya liteya
Na suka ya eyangeli oyo, bosengeli kozwa Eleko oyo biso tozali kobika na kondimaka ete : • Nzambe ya molóngó, Nkolo Nzambe ya Nguya Nyonso, azali se ye moko, Nzambe ya solo, ya libela, ya bileko nyonso, oyo azali kati na bato misato : Tata, Mwana mpe Molimo Mosantu. • Nzambe azali mozalisi ya biloko nyonso oyo emonanaka mpe oyo emonanaka te. Asali moto na elilingi na ye. • Llikolo ya kotomboka ya satana* mpe na bato mibale ya liboso*, Nzambe alakelaki bikelamo nyonso mabe ; kasi ata bongo apesaki elaka mpe mwango ya kolonga mabe mpe kozongisa biloko nyonso malamo na nzela ya Nkolo na biso Yesu Klisto. Nzambe ya bileko nyonso, Tata na ngai, olobi na Liloba na yo ete ozali liziba ya bwanya mpe mayele nyonso. Nandimi ete ezali solo ; Tata ya bolingo, nasengi opesa mpe ngai bwanya ya bonzambe mpo ngai mpe nakoka kokabola Liloba ya solo (2Tim.2 :15). Nabondeli yo lakisa ngai mpe lakisa ngai nzela nakolanda (Nzembo 32 :8), mpe kamba matambe na ngai. Sunga ete matoyi na ngai ebongama mpo na koyoka mongongo na yo, mpe sembola ngai na lolenge ya kobanza mpe ya koloba mpe zongisa ngai na nzela soko nabungi. Tata, pesa ngai likabo ya bokesenisi, mpe sunga ngai nakoka koyekola mpe nayeba bokeseni kati na mateya ya milimo mpe makabo ya Nzambe na oyo
Libondeli ya kofungola mpo na kosenga bwanya
*Satana – satana ezali nkombo penza ya zabulu, mbanda (monguna) ya Nzambe mpe ya bato. *Bato mibale ya liboso : Adamu mpe Ewa basalemaki na Nzambe lokola mobali mpe mwasi ya liboso, na elilingi ya Nzambe mpo bazala na boyokani na ye. Básala mosala na ntina, mpe mpo basepela na bozwi ya mokili ya kokoka oyo Nzambe asalaki.
15
16 • Bunda etumba elamu ya kondima
ya binzambe-nzambe. Monisa ngai, na nzela ya Molimo Mosanto, mokano na yo, mpe pesa ngai lisosoli malamu na lolenge nakoki kosalela mposa na yo na motema mobimba. Nkolo ya bolingo, nabondeli yo osunga ngai nayokamela mpe nayoka noki, kasi naloba mpe nasilika noki te (Jake.1 :19). Tika ete maloba ya monoko na ngai mpe makanisi ya motema na ngai endimama na miso na yo. Sunga ngai naloba solo na Yo na bwanya nyonso na lolenge ete bayóki na ngai nyonso basosola mpe bazwa litomba na solo na Yo. Teya ngai sikoyo, awa nazali koyekola, lolenge nayamba liloba na yo mpe lilako na Yo. Nasengi nyonso oyo na nkombo ya nguya ya Nkolo mpe Mobikisi. Amen. 1. Yango tozali kaka biso moko na mokili ? Bilili mingi ya Holly Wood emesáná kolakisa bomoi ya bikelamo oyo ezalaka na biso awa na mokili oyo te. Bilili yango esanganaka na makambo mabe mpe ya somo. Bato mingi bakanisaka bobele tozali biso moko na kati na molóngó (mokili) te, ata soki bakoki kopesa likanisi noki ete bazali na likanisi ya epai wapi lobiko ya milimo yango ezali, to mpe soki ezali boni. Bamosusu bakanisaka ete biso bato tozali biso moko na etando ya ebele ya moyi, mpe lisanga ya minzoto to mpe bikelamo ya lola. Basusu bakanisaka ete tokelámá na kolandaka etambweli mpe mbongwana ya mokili ; basusu mpe bakanisaka ete tokelámá na *binzambe-nzambe ya mokili mpe bamosusu balobi ete moto moko te akoki koyeba makambo ya motindo wana. Na ntango bino bozalaki kokola na bomwana na bino, makanisi na bino ezalaki nini mpo na epai towuti, mpe bateyaki yo nini na oyo etali epayi lola mpe mokili ewuti ? 2. « Ezalaki mokolo moko... ! » Mingi kati na biso bakoli na koyokaka masolo oyo ezali lokola masapo bayekolisaka bana ya kelasi ya soso (bana ya mibu 3 kino 5) ; masolo oyo eteyamaka na kelasi, na ndako, na nsámbo mpe bongo na bongo bipai nyonso bato bazali na mokili. Balingaka koyoka mpe kobeta masolo to masapo ya bilili, na kotangaka mosusu na babuku mpo na koseka, balingaka mpe komonana mpe kosalela yango bitalo (theâtre), na etando monene, kokoma na babuku, kosalela na facebook, bazulunalo, bansango na bitando mokie- mikolo nyonso, toyokaka masapo ndenge na ndenge ná oyo ya solo, ná ya lokuta, misusu ebendaka bokebi ya bato, mosusu mpe ya nsoni. Nakanisi te ete okokamwa koyoka ete Biblia ezali kolobela kaka lisolo (lisapo) moko. Makomi Esantu oyo ezali lisanga ya mikanda ntuku motoba na motoba (66), oyo ekomami na bato kokesana na bileko kokesana kino mobu 1500. Yango ezali kolobela kaka lisolo (lisapo)
Bokutani *Binzambe nzambe — binzambe nzambe ezali bikelamo oyo ezali na nguya koleka to bikelamo oyo ezali na nguya mingi mpe bato mosusu bakanisaka ete bango nde nzambe ya solo.
Mangoba oyo esambelaka binzambe nzambe ebengami mpe bobele binzambe nzambe
Liteya ya yambo (1) Lisapo oyo tobikaka na kosangisa lisolo na biso na lisolo oyo ya Nzambe • 17
moko- lisolo ya Nzambe tata na biso mpe mposa na ye ya kobikisa bikelamo na Ye. Yo, okanisi penza nini mpo na masapo ? Oyóká nano te ete Biblia elobaka se lisolo moko etali Nzambe na kobikisa na ye ? Bokesani nini tosalaka na masapo oyo toyoka na oyo ya Biblia to mpe mpo na Nzambe na mposa na ye ya kobikisa mokili ? 3. « Na ndenge ngai nakoki koloba, mwango moko ezali te ». Uta ebandeli ya kondima, mwa nsima ya ntango ya Bantoma, bandimi bandimaki mitindo ya ntina ya bondimi (mitindo likonzi ya bondimi). Mibale oyo eyebani mpe elobami na motu na lobiko ya bato kino lelo ezali : « Kondima na bantoma » mpe « kondima ya Nikea ». Kotatola bondima ya bantoma mibale ya mikuse wana elobi na bokuse lolenge Biblia elobeli biso ndenge Nzambe azali. Nzambe azali oyo asalaki kati na Yesu Klisto, mpe emonisi lolenge bikelamo nyonso ekozonga malamo, na mayele mpe na mwango ya Nzambe. Mingi ya bato oyo bandimelaka Nzambe te, bandimaka ete mokili (molóngó) esalema na pwasa, na kozanga ntina, mpe ata moto moko te azwaka likanisi ya kozalisa yango. Balobi mpe lisusu ete ezali ata na mwango moko te oyo esangisi bikelamu nyonso. Ezali mpe ata na eloko moko te oyo ekoki kosunga biso toyeba ntina na biso na mokili, to toyeba epai wapi tozali kokende mpe lolenge nini eloko nyonso ekokóma. Ba Athée (bandeko oyo bandimaka te ete Nzambe azali ), bango mpe balobi ete ezali bolema kokanisa ete Nzambe azali to mpe mwango moko monene ezali mpo na mokili. Bazalaki na mimesano ya kolobaka ete lokola Nzambe moko azalaka te, bobele ebolo ya mokili oyo ebima se pwasa boye, mokili ezali mpe na nsuka te, mpe ntina ya kobika awa na mokoli ezali te. Ba Agnostique, (baye balobaka ete tokoki koyeba te to Nzambe azali to mpe azali te), bango balobaka ete ata soki Nzambe azalaka biso bato tokoki mpe koyeba ye te. Na bongo eloko tokoki kosala bobele kolikya ete biloko nyonso ya mokili ekokoma malamo ntango mosusu ! Lolenge nini kondima ya bantoma mpe oyo na Nikea ekoki kosunga biso toyanola na mibenzwa (makanisi malongobani te) oyo edimelaka ete Nzambe azali te mpe mwango ya mokili ezali te ? Na kati ya Biblia tozali kokuta lisolo ya Nzambe mpe ya moto, lisolo oyo etie Yesu na kati-kati na yango lokola Nkolo na biso. Kasi lisolo yango ezali monene koleka oyo totangaka na babuku. Ezali likambo oyo biso mpe tozali na kati mpe kosalela yango. Lokola bayekoli na Yesu, bozali sikoyo na emoneli mpe ezaleli oyo eyebani ya sika, mpe oyo ya bino mosala ya kokokisa na eleko oyo tozali na kati na yango.
Makambo ezali kati na liteya
18 • Bunda etumba elamu ya kondima
Mokili esalemaki na ye, *bokonzi na ye eleki nyonso, ye *Nzambe na kati ya bato misato : Tata, Mwana mpe Molimo Mosantu. Ye, abikaka uta liboso ya ekeké, mpe akotíkálá na nkémbo ya libela na libela, mpe azangi eloko moko te. Nzambe asepelaki kosala mokili, epai wapi bato ye asala na lolenge na ye bakoka kobika na makoki nyonso etonda na bikelamo na ye. Kasi mokili ebuakamaki na yiki-yiki likolo ya kotomboka ya *mwanzelu mokonzi, Satana. Na makanisi ya kobongola mpe kokweyisa Bokonzi na Nzambe, satana amekaki bankoko na biso (Adama na Ewa) ete batombokela Nzambe, yango wana etika mokili na bilakeli mabe ya kozangáká elikya ya lisiko. Mpo na kotelemela botomboki, Nzambe akanaki kobimisa Molongi, Mobikisi oyo akoki kosikola bato na botutu oyo bazalaki na yango uta na bankoko mpe kosilisa mabe na yango nyonso. Na nzela ya Abalayama, Nzambe apesaki elaka ya komema Masiya to mobikisi (Mopakolami ya Nzambe) mpe ya kotombola libota epayi wapi Masiya akowuta : Yisalaele. Mpe, ntango eleko abongisaki ekokaki, Nzambe atindaki mwana na ye Yesu mpo na komonisa nkembo na ye, kosikola libota na ye, mpe mpo na kobikisa bikelamo na ye. Yesu amonisaki bwanya na Bokonzi na ye na nzela ya mateya na ye mpe na nguya ya bikamwisi. Na mposa na ye moko andimaki apesa bomoyi na ye na kokufa kati na ekulusu, mpo na kofuta nyongo ya *masumu na biso mpe kobuka misala ya monguna Satana. Nzambe esekwisaki Yesu na kati ya bakufi, na nsima ya mikolo ntuku mineyi *anetuaki na likolo lokola Nkolo molongi. Na mokolo ya ntuku mitano na nsima ya kosekwa na ye, atindaki Molimo Mosantu mpo na kopesa nguya ya kokolisa lisanga ya *bayekoli ya Yesu Klisto, *Eklezia. Lokola libota ya tata, nzoto ya Yesu Klisto, mpe Tempelo ya Molimo Mosantu, Eklezia etindami kobenga bato bipai nyonso na mokili po na kokota na kati ya lisolo monene. Tango etumba malamu na kondima * Bokonzi oyo eleki nyonso – nkombo oyo eleki nyonso na nguya, na mikano ya suka likolo na nyonso. *Nzambe moko kati ya bato misato – ezali lolenge ya koloba bato misato kati na Nzambe moko. *Banzelu – Banzelu bazali bikelamu ya molimo baye bakelami na Nzambe mpe baleki bato na nguya, mpe na mayele *Lisumu – ezali kokweisama, kozanga kosala mokano to etinda ya Nzambe na makambo tosal aka, tolobaka mpe tokanisaka. *Konetua – yesu atikaki mabelé mpe abutaki, amataki na likolo na nzoto na ye na miso ya bayekoli na ye. Na nsima ya kufa mpe lisekwa na ye. Konetua na ye ezalaki lolenge ya kotika mabele mpo na kokenda kofanda na kiti ya bokonzi ya elonga lokola molongi. konetua etie mpe esali ete Molimo Mosantu aya kopesa makasi na baklisto ya mokili mobimba. *Bayekoli – moyekoli azali moto oyo akoyekola to mpe azalaki elongo na yesu. Moklisto nyonso azali Moyekoli ya Yesu. Ntango mosusu moyekoli elobamaka kaka mpo na bayekoli zomi na mibale ya Yesu. *Lingomba to etonga to mpe Eklezia – ezali lisanga ya bato na Nzambe oyo bayebi Yesu lokola Nkolo mpe Mobikisi, baye bazali kopalanganisa mwango na ye na mokili mobimba : ézala baye baleka (baye bakufa), baye bazali nano, to mpe baye bakoya na bisika nyonso ya mokili na molayi ya lisolo na yango.
Liteya ya yambo (1) Lisapo oyo tobikaka na kosangisa lisolo na biso na lisolo oyo ya Nzambe • 19
na biso ekosila, Yesu akoya kozalisa bokonzi na Nzambe awa na mokili mobimba, wapi epai mpasi, kolela, nzala, minyoko mpe liwa ekozala lisusu te. Akokozala na bokonzi na ye elongo na bato na ye libela-na-libela Nkembo ezongela Ye Mituna oyo ekokaki koswa soki tozongelaki yango na lisolo ya Biblia epayi wapi mimpalá misusu ya kobongola makambo ezali kokola mbala mibale to misato koleka. Mpo na kobongola nkasa ya buku ya masolo oyo mpe lisolo yango obele Biblia, yango ekokutanisa biso na kili-kili mbala na mbala. Ndeko na biso moko akomá na mikanda na ye boye : « Ntango makambo ekómákí mbilinga-mbilinga mpe Nzambe amonisaki lolenge na ye mpe mposa na ye, Nzambe akotelaki babola mpe batúkami » ete asikola bango. Ntango ya kokótela na makambo ezali ntango makambo ebalukaka—ntango ozali kozila eloko oyo, eloko mosusu eyeli yo ; ntango bá-mokili bazali kosepela na likambo songolo, Nzambe abimiseli bango mawa na likambo pakala. Esika bato bamoni ntina monene, Nzambe amonisi ete ntina moko ezali te.
~ Ronald J. Sider mpe Michael A. King. Philadelphia : The Westminster Press, 1987, pp. 56-57
Soki Klisto te, Biblia elingaki ezala buku ya kokangama mpo bato bakokaki kososola yango te. Tanga biblia na Yesu na kati na yo, okomona ezali lisolo monene oyo elobámá te. Biblia ezali kotsiolama soki bamoni yango pamba lokola babuku ya bomoyi ya mokili oyo. Na makanisi ya bantoma, na oyo ya Yesu ye moko, Biblia ezali lisolo ya bomoi na biso lisanga na Yesu oyo azali moto ya liboso na kati ya lisolo yango.
~ Michael Horton. Christless Christianity. Grand Rapids, MI : Baker Books, 2008li, lokasa 142.
20 • Bunda etumba elamu ya kondima
Eleko oyo tozali na kati na yango Liteya ya yambo : Boyekoli Biblia Botanga makomi oyo mpe boyanola yango na bokuse mpe na kolandisaka yango na mateya ya Biblia. 1. Nkolo Nzambe kaka nde azali Nzambe bobele ye moko, mpe azali mozalisi ya mokili. Tanga Ebandeli 1.1,-3.15. a. Ntina to mosala ya Nzambe na lisolo oyo ezali nini ?
b. Ntina to mosala ya Adama na Ewa na lisolo oyo ezali nini ?
c. Eloko nini nyoka asali na lisolo oyo ?
2. Bato nyonso ya mokili bakelama mpe bazali kobika na mokano ya Nzambe. Tanga Misala ya bantoma 17.24-31.Tangela biso biloko misato ntoma Paulo alimbolaki mpo na lisolo ya Nzambe ngonga alobaki na Bai-Athenia. 3. Nzambe alobaki na bato nyonso na nzela ya bikelamo na ye, na nzela ya basakoli ya Yisalaela mpe na mikolo ya suka na nzela ya Yasu Klisto. Tanga Baebele 1.1-4 a. Lolenge nini mokomi alimboli ndenge Nzambe alobaka na bato ?
b. Ntina nini mokomi ya Baebele apesi na Nzambe oyo alobaka na biso na nzela na Yesu ?
4. Nzambe akotaki na lisolo na kokómáká moto mpe na kobíkáká na mabele ! Tanga Yoani 1.1-14 a. “Liloba” nde azali nani mpe akokani na Nzambe na makambo nini ?
b. Boyokani nini ezali kati na Liloba na bikelamo ?
c. Mpo na baye bandimelaka liloba, bazuaka nini, mpe «babotami» ndenge nini ?
Liteya ya yambo (1) Lisapo oyo tobikaka na kosangisa lisolo na biso na lisolo oyo ya Nzambe • 21
5. Lisolo ya bolingo na Nzambe oyo epesami na nzela na Yesu eyebisami na mabota nyonso, bipayi nyonso. Tanga Matayo 28 :18-20 Etinda nini Yesu apesi na bayekoli na ye ?
6. Nsango Malamo ezali nsango ya kitoko ya libiki oyo elobi na mokuse eleko tozali kobika. Tanga 1 Bakolinto 15.1-8 Eloko ya motuya nini Paulo alobi ? a. « Ngolu » ezali nini ? Mpo na nini Nsango malamo ezali ntango nyonso koloba na ntina na « ngolu » ?
b. Nsango malamo ezali nsango oyo eyebisi makambo Nzambe asali na nzela ya Yesu Klisto.
c. Ntango Yesu asilisaki mosala na ye, amimonisaki na nani ?
7. Yesu ya Nasaleta azali *mobímbí (ntina) ya lisolo ya Nzambe, bomoyi, liwa, mpe lisekwa na ye. Tanga Malako 1. 1-13. Tango Yesu abatisamaki, lakisa na kosalela toloto lolenge nini Nzambe amimonisaki lokola Tata, Mwana mpe Molimo Mosanto. a. Tata ___ Lolenge ya embenga b. Mwana ___ Mongongo ewuti na likolo c. Molimo Mosanto ___ Yesu ya Nasaleta 8. Lisolo Nzambe azali koloba na nzela ya Yesu ezali lisolo ya bozongisi bolamo, ya kobikisa, mpe ya kopambola bato bazali na bolozi mpe (mawa), mpe bato bazali na bobola. Tanga Yesaya 61 : 1-4. Tanga maloba mitano elobamaki na Yesaya ete Yesu akosala na ntango wana Yesu abotami nano te.
22 • Bunda etumba elamu ya kondima
Kombo na ngai Nee. Ezali kombo ya ba-chinois mingi. Nazwaki yango ndenge nini ? Naponaki yango te. Nalukáká yango na mikanda mpo na kopona yango te. Nkombo na ngai ezali Nee mpo na makasi na ngai to lolenge na ngai te. Wana etali ngai ata moke te. Lisusu, nakoki kosala eloko te mpo na kobongola yango. Kombo na ngai ezali Nee mpo tata na ngai azalaka Nee, mpe tata na ngai azalaka Nee mpo nkoko na ngai azalaka Nee. Soki nasali makambo lokola Nee ezali mpo nazali Nee, soko nasali kokesana na Nee natikali bobele Nee. Soki nakomi mokonzi ya ekolo chine, nazali bobele Nee, to soki nakomi molombi na babala bala, nakotikala bobele Nee. Eloko moko te na oyo nasalaka to namipekisaka kosala ekokomisa ngai moto mosusu. Tozali basumuki mpo na biso moko tolingaki yango te, kasi ezali nde likolo ya Adama. Ezali te mpo ngai moko nalingaki nasumuka nde nazali mosumuki, kasi ezali nde mpo nazalaki na kati ya Adama oyo asumukaki. Lokola uta kobotama na ngai nawutaki na Adama, yango wana nazali elembo na ye. Lisusu nakoki kosala eloko moko te nsima na yango. Ata nabongisi ezaleli na ngai, nakoki komikomisa moto mosusu libanda na ye te, elingi koloba mosumuki. Na kolandisama na oyo Biblia elobi, Nkolo Nzambe ya Bibele azali se Nzambe moko ya solo, oyo amimonisaki ye moko ete bato bayeba ye Nzambe moko na kati ya bato misato : Tata, Mwana mpe Molimo Mosanto. Nzambe ayebisi biso lisapo monene (na lifalanse, épopé) oyo eyebisi biso bolingo na Ye mpe mokano na Ye ya kobikisa bikelamo na Ye na boloko. Nzambe azali mokeli ya molóngó, oyo asalaki biloko nyonso uta epai wapi eloko ezalaki te (ex nihilo), mpe akanaki ete abimisa libota epai wapi mobateli mpe mobikisi akokaki kowuta. Ata ko na ebandeli asalaki libota na ye oyo ezangaki masumu mpe na sima libota yango batombokelaki ye, bakweyaki mpe bakabwanaki na *ngolu na ye, mpe bamemelaki libota mobimba ya bato bilakeli mabe oyo esuki na liwa, Nzambe apesaki elaka ya kotinda mobikisi oyo akofuta nyongo ya masumu na biso, mpe kolongola biso na etumbu ya masumu na biso, mpe kopesa biso bomoyi ya seko na nzela ya kondima. Yesu ya Nasaleta azali mobikisi oyo akufaki mpo na kosikola biso. Sikoyo na nzela ya kondima tokoki kobikisama na etumbu Watchman Nee. La vie Chrétienne normale Fort Washington, PA : Christian Littérature Croisade, 1974, p. 26.
Na mokuse
*Kokabwana na ngolu – Wana Adama na Ewa bakutanaki na Satana na kotomboka na bango, masumu na bango nde ekaboli bango na bondeko na Nzambe ya boyengebene ; misala na ban go nde eyokisi bango nsoni liboso na Nzambe mpe ekotisaki kufa na mokili.
Liteya ya yambo (1) Lisapo oyo tobikaka na kosangisa lisolo na biso na lisolo oyo ya Nzambe • 23
mpe na nguya ya masumu, mpe kozwa bomoyi ya seko tokoki kokota na lisolo Nzambe azali kolobela biso !
Minkanda ya kobakisa
Mikanda ya kobakisa oyo bosengeli koyekola mpe kobanza na ntango ya mabondeli na kolandáká liteya oyo : Ezalaka mokolo moko (Monk.ya kob 1) Lisolo oyo Nzambe azali koyebisa biso (Monk.ya.kob.2) Liboso ya ebandeli mpe sima ya suka (Monk.ya kob.6) Elili mpe motema ya likambo (L’ombre la substance) (Monk.ya kob.7) Yesu Klisto ntina mpe motu ya liteya na Biblia (Monk.ya kob.22) Elobama ete mokili mobimba ezali bobele eleko. Wana ekoki kondimama ata moke te ete ezala solo koleka lisolo (drame) oyo ezali kosalema libanda ya oyo tokoki kobenga « nyamu-nyamu ya bileko » Mwango oyo ezali na Biblia mpe na lisolo ya bomoyi emonisi yiki-yiki oyo ezali kati na bokonzi mibale epayi wapi biso mpe tozali kokokisa oyo ya biso mosala ndenge mokano na Nzambe elobi. Ezali kotelemela ntina ya mabongisi penza ya makambo ya Nzambe na lisolo ya lobiko oyo bakomi ya Biblia bakomá mpe baye balimbolá yango. Kondima ya Nikea (Mink.ya kob.24 ; 25) Kondima ya bantoma (Monk.ya kob..26)
~ James DeYoung mpe Sarah Hurty. Beyond the Obvious. Gresham, OR : Vision House Publishing, 1995 pp. 83-84.
Nzambe ya Nguya nyonso ayaki na mokili na nzela ya Yesu Klisto ya Nasaleta, mpe azongisi bondeko kati na Ye na mokili na nzela ya liwa ya Yesu na ekulusu. (2 bakolinto 5 :19)
Mobeko ya ntina
Koyekola makambo tokutanaka na yango
Botanga mpe bokanisa makambo oyo ebimelaka biso mpe makanisi oyo, mpe yanola na bozindo na kolandaka makomi towuti koyekola. 1. « Nandimi te ete Nzambe moko azali ». Wana ezalaki bango kolia na esika ya mosala, Janisa na moninga na ye Leya batianaki ntembe mpo na koyeba ndenge nini mokili ekomaki ete ezala. Leya alobi : « Eloko moko emonisi te été Nzambe to banzambe mosusu ezali. Biyamba mpe nsámbo nyonso emonisi bokeseni na makanisi na ntina ya lolenge mpe ezaleli ya Nzambe, mpe na motango nini banzambe bazali, mpe motango ya babuku ya makomi mosanto ezali ». Janisa azali mwasi moklisto oyo andimi ete Tata ya Nguya Nyonso asalaki mokili mpe
24 • Bunda etumba elamu ya kondima
kosala yango ezali kitoko penza mpe yango wana ezali na kolukáká ntina azalisaki yango te. Soki ozalaki Janice, lolenge nini olingaki okabola makomi oyo oyekoli ? lolenge Biblia ezali kolebela Nzambe mpe bikelamu nyonso ya mokili ? 2. Mpo na nini Nzambe azali kobongola makambo sikoyo te ? Na ntango ya koyekola Makomi Esanto na baninga baklisto ya sika mituna ebimaki « soki Nzambe nde azali mokeli, mpe azali kosala bikelamo nyonso esika moko, mpe mpo na nini makambo ebele ya mabe ezali kosalema na mokili » ? Baye balobi Nzambe ayebaka te lolenge makambo wana ezali koleka na mokili, mpe bamosusu balobi ayebaki kasi akanaki ete akota na yango te. Na kotáláká mateya ozwi, eyano nini okoki kopesa mpo na nyonso oyo ezali koleka na mokili na lolenge tozali komona ? Ndenge nini makambo toyekoli na liteya oyo ekoki kosunga biso tososola mpo na nini Nzambe azali kopesa biso nzela ete tomonaka mpasi na minyoko, ata mbala moko ? 3. Yango banzela ezali nde mingi oyo ememi biso epai ya Nzambe ? Na moyi ya lelo bato mingi bakanisi ete nsámbo nyonso ezali na motuya ndenge moko mpe banzela ezali mingi oyo ezali kokotisa biso epayi na Nzambe. Ezali lokola na nse ya ngomba bayike bakani komata ngomba mpo na kosepelisa nzoto kino bakoma na nsonge, kobanda na bisika kokesana. Bango nyonso bazali bobele na mposa ya kokoma na nsonge (epai Nzambe to banzambe ) bazali, kasi bakozwa banzela ebele, kowuta na makóno (na lifalanse, coin) kokesana mpe ndenge ya komona makambo kokesana na nzela ezali bango kokende. Kala to kala mingi te (wana kowelana esili), bango nyonso (nsámbo nyoso na mokili) bakutani na nzela na kokóma na nsonge (ya milimo, ya bonzambe). Na ndenge bakanisi boye, nsámbo nyonso ekokani, bango nyonso bazali koloba solo na bonzambe na bango, mpe bato bakoki kolanda losambo bobele losambo oyo balingi mpo na kokutana na Nzambe. Lolenge nini tokoki koloba Mobeko na kokanisaka mateya na biso mpe lolenge ya makanisi wana mpo na kokoma epai na Nzambe ? Lokola boyamboli masumu sikoyo (bokabwani na masumu), mpe bondimeli Yesu ya Nasaleta lokola Nkolo, bosili kobotama uta na likolo, bosili kokoma bana na Nzambe na nzela ya kondima nsango malamo. Wana elingi koloba boponama na Nzambe, mpe bozali ba moko kati na kati ya mwango monene oyo abongisaki mpo na lokumo na ye mpenza. Bokotanga bobele mwango na lisolo ya nzambe te, kasi bosili kokutana na Ye ! Bosangani na Yesu na nzela ya kondima, bolimbisami na masumu na bino, bozwami lokola bana na libota na Ye, mpe bokoti na buku ya babundi na ye. Uta ondimela Yesu, osila kokota na lisolo na ye !
Bokutanisi
Liteya ya yambo (1) Lisapo oyo tobikaka na kosangisa lisolo na biso na lisolo oyo ya Nzambe • 25
Wana elingi koloba osengeli koyekola makambo nyonso oyo etali lisolo, oyo Nzambe azali kosala, ndenge nini alingi yo obika mpe ndenge nini alingi kosalisa yo mpo na kosunga mpe baninga mosusu ete bakutana na lisolo na Ye ya bolingo mpe ya libiki. Kobanga te ; Nzambe asili kopesa yo Molimo Mosanto na Ye ateya yo ; asili kopesa yo Liloba na na Ye eteya yo, Lingomba ya baklisto balinga yo lokola ndeko, mpe nguya ya mabondeli esunga yo na nyonso osengeli na yango mpo na kobika na kati ya lisolo monene oyo na bomoyi na yo ya sika. Sikoyo okomi na baninga ya sika mpe na banguna mpe ya sika ! Osili kobikisama na nguya ya molili, mpe sikoyo osengeli koyekola ndenge nini okoki kotelemela lokuta ya zabulu, komekama ya mokili, mpe mimesano na yo ya ezaleli na yo ya kala ya masumu. Kobikisama ezali kokota epayi ya Nzambe na etumba, mpo na mitema mpe makanisi ya bato bipayi nyonso. Kasi koyoka mpasi te ! Nzambe asili kopesa biso nyonso oyo tosengeli na yango mpo na kobika na bomoyi ya baklisto, mpo na kosepelisa mpe kopesa lokumo epayi na Nzambe, mpe kolonga monguna na kati ya Lisolo monene tokoti kosalela. Lekisa mwa ngonga ya kotonda Nzambe mpo abendi yo pene na ye, mpo akomisi yo mwana na ye, mpe mpo apesi yo bomoyi ya seko. Senga ye lisungi ya kokoba koyekola mpe kokola lokola moyekoli (molandi) ya Yesu Klisto, mpe lokola mobundi na limpinga na ye. Akoki kotika to koboya biso ata moke te. Boyeyi bolamo na kati ya libota, mpe boyeyi bolamo na etumba !
Nasálámá na lolenge ya Nzambe, ata mbala moko nazalaki monguna na Nzambe, naponámá mpo na kosalela mwango ya Nzambe mpo na mokili ete kozongisa baye nyonso babungaki na ekweli.
Kondima
Uta Eklezia ebanda kobondela, sikoyo ewumeli bambula nkama na nkama na kolandaka bobele eteyelo ya Nkolo Yesu mpenza oyo ateyaki bayekoli na ye na Matayo 6 :9-13 mpe Luka 11 :2-4 Tata na biso ya likolo, Nkombo na yo ezwa lokumo ; Bokonzi na yo eya ; Mokano na yo esalema awa na nse, Lokola esalemaka na likolo. Pesa biso bileyi oyo ekoki lelo, Limbisa mabe na biso, Lokola biso mpe tolimbisaka Bato oyo basali biso mabe. Mpe kotika satana ameka biso te, Kasi bikisa biso na mabe. Mpo bokonzi, nguya, na lokumo ezongela se na yo seko. Amen !
Libondeli
26 • Bunda etumba elamu ya kondima
Kokîmela to kolela na motema epayi na Nkolo
Nkolo ya bileko nyonso, tata na ngai, matondo mpo omonisi ngai mwango mpe lisolo na kati ya makomi esanto. Yo, osalaki molóngó(na lifalanse :univers) mpe mokili, mpe yo, ozali mokeli na ngai mpe Nzambe na ngai. Nazongiseli yo matondi mpo ofungoli motema na ngai nayoka Nsango malamo ya lobiko oyo epesi ngai bomoyi ya seko, oyo obongisaki mpo na bato nyonso baye bazali kondimela Yesu. Nandimi ete olingi ngai, obikisi ngai. Okotisi ngai na kati ya lisolo na yo. Sunga ngai na nzela ya Molimo na yo, nayekola lolenge ya kobika mpo nakoka kokumisa yo, natelema ngbi na makambo nyonso okomema ngai mosika na yo mpe ezali kozongisa ngai na mokili. Sala ngai ngolu ya kosepelisa yo lelo. Na nkombo ya Yesu, amen. Na www.tumi.org/sacredroots, tozali na eteni ebongisami mpo na kokoba kozwa makomi mpe bilili Norman Geisler. To undersdand the Bible Look for Jesus.( Mpo na kososola Biblia, luka Yesu ). Eugene, OR :Wipf and Stock Publishers, 2002. Mpo na liyangani ezali koya, bokotala Kokomisa makomami oyo tosalaka bakisa mitu ya mateya oyo : 1. Yesu alogaki zabulu mpe apesa biso nzela ya kokota na bokonzi Na Nzambe 2. Na nzela ya koyambola masumu na biso na kondima, na ngolu na Nzambe tobatisama na nzoto ya Klisto. 3. Topesama na Molimo Mosanto lokola ndanga ya nkita na biso ya Bokonzi ya lola
Mateya ya kokoba
Mpo na liyangani ezali koya
Makomi ya kobomba na mutu
1Yoane 3 :8
Mosala ya kokokisa na ndako
1. Na eteni ya papiye ekabwani na misusu, koma na bokuse lisese ya Biblia. Kabola yango na ndeko mondimi mosusu oyo akémbá na lingomba. 2. Tanga na Minkanda oyo ebakisami « Lolenge ya kobanda kotanga Biblia » 3. Banda na mwango ya kotanga Biblia mokolo na mokolo.
Made with FlippingBook - Share PDF online