Bunda etumba elamu ya kondima
Minkanda ya kobakisa 163
M onkanda ya kobakisa 16 K okende liboso mpe kozongisa miso sima Kozongisa Nsango Malamo kati na Bonkoko Monene Rév. Dr. Don L. Davis
Bokundoli lisusu « Bonkoko Monene » Na monkanda na ye ya moke mpe kitoko, Ola Tjorhom amanyolaki lolenge Bonkoko Monene ya Eklezia ezali (ntango mosusu ebengami « Bonkoko ya Baklisto oyo tosengeli kolanda ») lokola « oyo ezali kobika, etongami malamo mpe ezali kokola ». Bonkoko Monene ezali motema ya kopanza nsango, na lolenge ya bantoma, mpo na mokili mobimba na ntina ya kondima mpe mosala ya baklisto oyo ekokísámá uta mobu 100 kino 500 sima ya Klisto 3 . Makabo na ye ya minene mpe libula oyo ezali kotalisa litatoli ya Ekelezia ya makambo oyo Lingomba endimaka ntango nynoso, losambo oyo Ekelezia ya kala mpe ekabwánáká te ezaláká kosepela na yango mpe emonanaka, ebandáká kosambela mpe kobatela etinda ya Klisto oyo eyambáká mpe esaláká. Ntango Bonkoko Monene ekoki te kozwa esika ézala ya Bonkoko ya Bantoma (elingi koloba, esika oyo ezali na mpifo ya kopesa kondima, Makomi Esanto), to kozipa bokonzi ya Klisto na Lingomba na nzela ya Molimo Mosanto, Bonkoko Monene ezali nano na bokonzi mpe elendiseli mpo na libota na Nzambe. Yango ezali kopesa libota na Nzambe, ntango nyonso, mpe makambo ya motuya mpo na koyambola mpe kondima. Bonkoko Monene ezali koyambama mpe kondimama lokola Bonkoko oyo ezali na mpifo na bai-Katoliko ya loma, bai-Orthodoxe, bai-Anglican, mpe banganga-mayele ya teoloji ya bai-Ngelesa to Misioni, ezala baye ya kala to baye ya sika, lokola ebimisaki minkanda oyo ezwami lokola mbóto, makambo oyo endimámá, etátólámá, eyambolama, mpe esalama na lingomba (lokola kano ya Makomi, kondimama ya Trinié to Nzambe moko kati na bato misato, bonzambe ya Klisto, mpe bongo na bongo). 1 Ola Tjorhom, Eglise Visible -unité Visible : Ecclésiologie Œcuménique et « La Grande Tradition de l’Eglise. » Collegeville, Minnesota : Liturgical Presse, 2004. Robert Webber a défini la Grande Tradition dans ces termes : « [c’est] le vaste plan de la croyance et des pratiques chrétiennes développé à partir des Ecritures allant du temps du Christ et le milieu du cinquième siècle, » Robert E. Webber, The Majestic Tapestry, Nashville : Thomas Nelson Publishers, 1986, p. 10.
2 Ibid., p.35.
3 Ntina ya Bonkoko Monene etiami motema na bibongiseli,na bitatoli mpe na misala ya Lingom ba na mbula 500 ya liboso ya bomoyi mpe mosala. Thomas Oden, na makanisi na ngai, amonisi polele ete : « … Mingi na makambo ya motuya oyo endimami na mosala ya komanyola makomi ya Biblia na ntango oyo ekundolamaka na mibu 500 nsima ya Klisto » (cf. Thomas C. Oden, The Word of Life, San Francisco : Harper San Francisco, 1989, p.xi.).
Made with FlippingBook - Share PDF online