Bunda etumba elamu ya kondima
176 • Bunda etumba elamu ya kondima
M onkanda ya kobakisa 21 E fandeli na ntango ya B oyokani ya sika Kobika na Bokonzi ememi epayi na Nzambe Rév. Dr. Don L. Davis
Mibeko ya mbongwana
Mobeko eyebisami
Makomi
Babola bakokoma bato na bozwi mpe bato na bozwi bakokoma babola.
Luka 6 :20-26
Babuki mibeko mpe mpe baye bakoki te bakobikisama.
Matai 21 :31-32
Baye bazali na komikitisa bakotombolama.
1Petelo 5 :5-6
Baye bazali komitombola bakokitisama.
Luka 18 :14
Bakufi miso bakomona.
Yoane 9.39
Baye bolobi bazali komona bakokoma bakufi miso.
Yoane 9.40-41
Tokokoma na bonsomi soki tozali bawumbo na Klisto.
Baloma 12.1-2
Nzambe aponá bazoba na mokili mpo bayokisa bato ya mayele soni.
1Bakolinti 1 :27
Nzambe aponá bato ya botawu na mokili mpo bayokisa bato ya makasi soni.
1Bakolinti 1 :27
Nzambe aponá biloko ezangi lokumu mpe etiolami ete eyokisa biloko ya lokumu soni.
1Bakolinti 1 :28
Tokozwa mokili ekoya soki tomizangisi oyo.
1 Tim. 6.7
Soki olingi bomoyi oyo, okobungisa yango ; kasi soki oyini yango, okozwa yango.
Yoane 12.25
Bokokoma bato minene soki bozali basali ya bato nyonso.
Matai 10.42-45
Soki obombi bozwi na yo na mokili, okobungisa bozwi na yo na lola
Matai 6.19
Soki obombi bozwi na yo na likolo, okozwa bomengo ya lola.
Matai 6.20
Ndima obungisa bomoyi na yo bongo obika na kotondisama.
Yoane 12.24
Sundola lokumu ya mokili bongo ozwa lisungi ya lola.
Bafilip.3 :3-7
Moto ya liboso akozonga sima mpe moto ya sima akokoma moto ya liboso.
Malako 9.35
Ngolu ya Yesu ekokisami na botawu na yo kasi na makasi na yo te
2 Bakoli. 12 :9
Makabo eleki malamu na miso na Nzambe ezali motema etutani na mawa mpe na koyambola.
Nzembo 51 :17
Esengo na kopesa baninga eleki ya kozwa epayi na bango.
Misala 20 :35
Sundola nyonso ozali na yango bongo ozwa oyo eleki malamu uta na Nzambe
Luka 6 :38
Made with FlippingBook - Share PDF online