Bunda etumba elamu ya kondima
Liteya ya yambo (1) Lisapo oyo tobikaka na kosangisa lisolo na biso na lisolo oyo ya Nzambe • 25
Wana elingi koloba osengeli koyekola makambo nyonso oyo etali lisolo, oyo Nzambe azali kosala, ndenge nini alingi yo obika mpe ndenge nini alingi kosalisa yo mpo na kosunga mpe baninga mosusu ete bakutana na lisolo na Ye ya bolingo mpe ya libiki. Kobanga te ; Nzambe asili kopesa yo Molimo Mosanto na Ye ateya yo ; asili kopesa yo Liloba na na Ye eteya yo, Lingomba ya baklisto balinga yo lokola ndeko, mpe nguya ya mabondeli esunga yo na nyonso osengeli na yango mpo na kobika na kati ya lisolo monene oyo na bomoyi na yo ya sika. Sikoyo okomi na baninga ya sika mpe na banguna mpe ya sika ! Osili kobikisama na nguya ya molili, mpe sikoyo osengeli koyekola ndenge nini okoki kotelemela lokuta ya zabulu, komekama ya mokili, mpe mimesano na yo ya ezaleli na yo ya kala ya masumu. Kobikisama ezali kokota epayi ya Nzambe na etumba, mpo na mitema mpe makanisi ya bato bipayi nyonso. Kasi koyoka mpasi te ! Nzambe asili kopesa biso nyonso oyo tosengeli na yango mpo na kobika na bomoyi ya baklisto, mpo na kosepelisa mpe kopesa lokumo epayi na Nzambe, mpe kolonga monguna na kati ya Lisolo monene tokoti kosalela. Lekisa mwa ngonga ya kotonda Nzambe mpo abendi yo pene na ye, mpo akomisi yo mwana na ye, mpe mpo apesi yo bomoyi ya seko. Senga ye lisungi ya kokoba koyekola mpe kokola lokola moyekoli (molandi) ya Yesu Klisto, mpe lokola mobundi na limpinga na ye. Akoki kotika to koboya biso ata moke te. Boyeyi bolamo na kati ya libota, mpe boyeyi bolamo na etumba !
Nasálámá na lolenge ya Nzambe, ata mbala moko nazalaki monguna na Nzambe, naponámá mpo na kosalela mwango ya Nzambe mpo na mokili ete kozongisa baye nyonso babungaki na ekweli.
Kondima
Uta Eklezia ebanda kobondela, sikoyo ewumeli bambula nkama na nkama na kolandaka bobele eteyelo ya Nkolo Yesu mpenza oyo ateyaki bayekoli na ye na Matayo 6 :9-13 mpe Luka 11 :2-4 Tata na biso ya likolo, Nkombo na yo ezwa lokumo ; Bokonzi na yo eya ; Mokano na yo esalema awa na nse, Lokola esalemaka na likolo. Pesa biso bileyi oyo ekoki lelo, Limbisa mabe na biso, Lokola biso mpe tolimbisaka Bato oyo basali biso mabe. Mpe kotika satana ameka biso te, Kasi bikisa biso na mabe. Mpo bokonzi, nguya, na lokumo ezongela se na yo seko. Amen !
Libondeli
Made with FlippingBook - Share PDF online