Bunda etumba elamu ya kondima
Liteya ya misato (3) Bokóti oyo tozwaka • 53
Kokîmela to kolela na motema epayi na Nkolo
Nzambe ya bileko nyonso, Nzambe mpe Tata ya Nkolo na ngai Yesu Klisto, matondo mpo okomisa ngai moko na mwana na yo. Matondo mpenza, Nkolo, mpo na makabo kitoko mpe mapamboli oyo nazwi na nzela ya Klisto, na koleka mpo na lipamboli monene ya bokomisi ngai moko moí-libótá na yo, Lingomba na Yo, mpe nzoto na Klisto. Mpo na kondima, osangisi ngai na bandimi nyonso, mpe opesi ngai lokumu mpe mokumba ya kobikela, ya bokoli, mpe ya kosala elongo na kati ya lingomba oyo nazali, na lisangana ya bomoyi emonisami lokola libota na yo, nzoto ya Klisto mpe lokola tempelo ya Molimo Mosanto. Koyeba yo ezali kolinga libota na yo, mpo yo ozali bolingo. Nayebi ete ozalaki na mposa te nabikela bomoyi na ngai ya moklisto lokola moto ayebani te, oyo azali komeka kobunda etumba malamu ye moko, ye moko kaka mpe na moninga mobundi mosusu te. Kamba ngai na lingomba oyo olingi mpo nakola wana, na nse ya kokambama ya mobateli mpate oyo akoki kosenzela molimo na ngai, mpe na Baklisto baye nakoki kolingana na bango – baninga, bana-mboka, babundi minene, elongo na bango nakoki kosalela makabo na ngai mpo na kolendisa basusu, kokembisa, tango nyonso tokozala kotatola bolingo na yo epayi ya bazalani. Matondo mpo na lingomba na yo. Sala ete nazala na litomba mpe moto moko malamu ya libota na yo, mpe sunga ngai nakola na lisungi ya bondeko elongo na bango, mpo na bolingo ya Klisto. Amen. Na www.tumi.org/sacredroots, tozali na eteni ebongisami mpo na mikanda mibakisami mpe bisaleli ya kotala na miso. John Eldridge. Epic : L’Histoire que Dieu raconte. Thomas Nelson, Inc., Nashville, TN : 2004. Na bokutani ezali koya, okoluka-luka Makabo oyo tozali kozwa bakisa bamama ya makambo oyo : 1. Molimo Mosanto apesaka mondimi moko moko makabo mpo na kosunga Nzoto. 2. Bonsomi epesami kati na Klisto mpo na kosalela makabo na biso. 3. Toyambi nguya ya kokola elongo, kokemba mpe bomoko.
Mateya ya kokoba
Mpo na mayangani ezali koya
Makomi ya kobomba na mutu
Baefeso 1 :3
Made with FlippingBook - Share PDF online