Bunda etumba elamu ya kondima

10 • Bunda etumba elamu ya kondima

likambo oyo eleki monene mpo na kokola kati na Klisto ezali koyekola kozala na bokasi, na bokengi mpe komimona mpamba te, lisosoli mpe komizangisa kokangama na motambo. Lokola bato bazali na batalisi ya Klisto, tosengeli kosala makasi mpe kokoba kokende bobele liboso kino tozwa mbano, ata kaka ndenge nini kati na mosala. Molimo Mosanto akosunga biso ete tolendisa bandimi misusu kati na bitumba. Mwango ya liteya moko-moko. Biteni ya liteya na liteya. Mateya nyonso ekabwani na biteni ya kokokana (moko eleki mosusu na makabo te) mpe likabo moko moko ezali kobeta nsete na likambo ya ntina mpenza oyo ekosunga ete bolobelaka bobele yango kino bosilisa liteya mobimba. (Yango ezali na motuya mingi wana endimi bino kokoba kino kosilisa buku oyo bino na baninga misusu, ntango bozali lokola balandisi to basalisi ya bitonga mike-mike). Mposa ya kokokisa nsima ya liteya. Bamposa oyo bozali kolikya na suka ya liteya , mposa misato-misato na liteya moko- moko, ekosunga bino kososola malamu eloko nini bosengeli koyeba mpe kondima soki bosilisi liteya, ezala ozali koyekola yo moko to na bato misusu. Libondeli ya kofungola mpo na kosenga bwanya. Libondeli oyo tozali kolendisa bino koyeba yango na motu mpe kobondela yango na mongongo makasi ezali kosenga Nkolo ete abongisa mitema na biso liboso tokota na kati ya koyekola na biso ya solo oyo ezali na Biblia ; na bongo tosengeli kososola mpe tozwa oyo Nkolo abongiselaki biso. Bokutani. Eteni oyo ya « bokutani » ezali eteni oyo ebandisi liteya wana. Yango etindiki liteya na kati ya mituna, makambo mpe bizaleli oyo tozali kokutana na yango, kobikela mpe kosala mokolo na mokolo na bomoyi na biso, oyo elandani na makanisi ya eteni ya liteya oyo. Bolekisa ngonga mingi na ndakisa mpe bokanisa na bokebi nyonso lolenge makambo wana ekoki kosalema. Yango ekokotisa makanisi na bino na bozindo mpenza mpe ekosunga bino na boluki-luki ntango bozali kokende liboso kino bosilisa liteya moko-moko. Makambo oyo ezali na kati na liteya. eteni oyo ya « Bozindo ya liteya » nde ezali kopesa biso ndimbola ya nkotela ya liteya oyo tolingi toyekola. Yango ekopesa mituna ya makambo oyo ezali kosalema mpe makomí ya Biblia oyo ekoyanola yango, mpe makomi oyo tokoluka mpo na liteya songolo. Na mokuse. Sima ya kotala lisusu makomi mpe koyanola mituna na eteni ya makambo oyo ezali na kati ya liteya, liteya nyonso nde epesi bino mokuse ya ndimbola na yango oyo etondi na makanisi ya ntina mpenza mpe solo ekutami mpe esengeli elobama na kati na makanisi yango. Yango nde ekosunga komonisa nzela, kotala malamo soki bososoli mpe bokangi

Made with FlippingBook - Share PDF online