Bunda etumba elamu ya kondima

Nkotela • 11

« makanisi ya ntina » ya liteya esalemi ntango boyekolaki makomi moto na moto na ndenge na ye moko. Minkanda ya kobakisa. Tokelákí mpe tobakisi bilili oyo ekoki, makambo misusu mpe minkanda misusu ya kobakisa oyo ekoki kosunga bino kososola mpe kosalela makambo oyo ezali na kati ya mateya. Tala na Minkanda ya Kobakisa oyo ezali na eteni oyo, lokola ebongi na kokolisa bososoli ya mibeko ya ntina na liteya moko moko. Mobeko ya ntina. Eteni oyo ya liteya ezali ntango nyonso kopesa likanisi ya liteya mobimba na molongo to verset moko. Koyekola makambo tokutanaka na yango. Eteni oyo ezali na motuya mingi mpo epesi bino makoki ya kokanisa oyo ekoya sima ya koyekola mateya mpo na makambo oyo ezali mpe oyo ekoki kozala. Solo ezali tê kaka esengo ya kokanisa, kokabola mpe kowelana na maloba ; kasi kozala moyekoli ya Yesu etali bomoyi mpenza mpe makambo oyo ezali komonana mpe bato bazali kokutana mpe kobikela na yango. Makambo yango ebongisami mpo na kolamusa makanisi na bino mpe kosunga bino wana bozali nanu kokola lokola bayekoli, mpe bososola lolenge nini bokokesenisa solo ya Liloba na Nzambe na solo oyo ezali kati ya bomoyi na bino. Koyeba solo ezali bobele likambo ya kokóma na mayele mingi mpamba te, kasi ezali nde kosikola (kokangola) bino na mabe. (Yoani 8 :31-32) Makambo oyo eleki « biyano kitoko » na motuya ezali « koyekola na komikitisa ». Na esika ya kopesa biyano ya malamu, mikitisa. Bokomona na boyekoli ya Biblia ete na momesano, boluki-luki na biso bato ekoki ata moke te kopesa eyano oyo ekoki, oyo ezali polele, na bosembo mpe solo. Kasi tobengami mpo na kobanza, mpe komipesa na koyekola Liloba ya Nzambe na komikitisa, mpe tokomeka makambo nyonso mpe kosimba oyo ezali malamu (1Batesaloniki 5 :21). Esengeli koyekola makambo nyonso mpo na komona ndimbola na yango towuti koyekola mpe kofungola motema ete bopesa esika na Molimo abongola lolenge na bino ya kososola makambo mingi oyo bokokutana na yango na mateya. Bokutanisi. Eteni oyo elobi makasi mpo na kolakisa mpe komonisa solo ya liteya bozwi. Bosengeli bomonisa botongani to bokutani nini ezali kati na oyo bozali koyekola mpe oyo bozali kokanisa, koloba, kobikela mpe koyebisa na bato misusu. Mpo na yango, na eteni oyo, boluka makambo ekoki kokokana na liteya bozali koyekola na bomoyi na bino moko. Kondima. Eteni oyo ya maloba moke mpe eyebisi makambo ebele ezali na solo oyo ewuti na biteni ya liteya oyo tokoki mpe tosengeli tozali na lotomo ya koyambola mpe kotatola na poso oyo mobimba.

Made with FlippingBook - Share PDF online