Bunda etumba elamu ya kondima

Liteya ya sámbo (7) Monguna oyo tobundisaka • 101

g. 2Bakoli 2 :11

__ Satana asalelaka bobele mayele oyo esalemaka mingi na bato, boye tosengeli tososola miango na ye.

2. Yesu ayaki kolonga, kokweyisa mpe kobebisa misala ya zabulu – kokangola moto na bilakeli mabe ekwelaki ye likolo ya kozanga botosi na ye epayi na Nzambe. Tanga Luka 11 :14-23 mpe yanola mituna oyo. a. Ntango Yesu abimisaki bademona, bato bafundaki Ye ete asali nini ? b. Yesu ayanolaki ndenge nini ntango bafundaki Ye ete abengani bademona na nguya ya Belezebula, mokonzi ya milimo mabe ? c. Yesu alimbolaki bosenga ya « mobali makasi » na nzela ya lisese elakisi lolenge ya kolonga moyibi ete ayibela ye (mobali makasi) biloko na ye te. Limbola litatoli wana. 3. Zabulu asalelaka lokuta, kofunda mpe kokosa lokola bibundeli ya kotiela bato mitambo, koyokisa bato mpasi, mpe kolembisa bandimi mitema lokola bazali kotalisa Klisto na mokili. Sangisa makomi oyo na lolenge elimbolami a. Yoa 10 :1-18 __ Yesu azali mobateli malamu ya bampate, kasi moyini aye nde koyiba, koboma mpe kobebisa bampate. __ Zabulu azali mokosi mpe tata ya bakosi. c. Emon. 12 :9-10 __ Zabulu azali kofunda bandimi liboso ya ngwende (kiti bokonzi) ya Nzambe. d. Bakolos. 2 :15 __ Yesu alóngá satana na ekulusu mpe amonisi ye polele na miso ya bato nyonso. 4. Baklisto, bózala bato ya kokanga motema mpe bokengela mpe kofungola miso mpo ata Yesu asila kolonga, moyini azali kaka koluka baye akoki kolia mobesu. Tanga 1Pet.5 :8-11 mpe tondisa bisika ya polele. a. Bosengeli bozaa ___________________ mpe bo _______________________ te mpo zabulu ajali kosala (vv.8) b. Zabulu azali konguluma lokola _______________________ azali koluka moto ya ______________________. (vv.8) b. Yoa. 8 :31-44

Made with FlippingBook - Share PDF online