Bunda etumba elamu ya kondima

100 • Bunda etumba elamu ya kondima

kati na Klisto ekowumela libela na libela. Nzambe ye moko akozongisa biso na bolamo, na makasi. Akosunga biso totelema ngwi, mpe akobatela ete toningana te kino suka ya etumba.

Ata yo na ngai towuti na bokonzi ya molili mpo na kokende na bokonzi ya mwana ya motuya ya Nzambe, tozingami seko na mimesano ebatelami na monguna monene ya Nzambe, Satana. Tosengeli tobika na yango kaka ntango tondimeli Klisto lokola mobikisi na biso kino mokolo kosambisama ekoya. Biso mpe tokotisami na oyo azaláká mokonzi na biso na ntango ya kala, kasi sikoyo akomi nde monguna na biso. Emonani polele ete ezali bozoba mpenza mpo na moklisto azali kozela etumba ya molimo te ntango azali kobika na mabele ya monguna.

Francis Schaeffer. The Complete Works of Francis Schaeffer

Volume 2 : Joshua and the Flow of Biblical History. Westchester, IL : Crossway Books, 1975, page 210.

Monguna oyo tobundisaka Liteya sámbo (7) Boyekoli Biblia Tanga makomi oyo mpe yanola mituna na mokuse na kosangisaka moko na moko na yango mpe na mateya ya Biblia. 1. Zabulu atelemelaki mokano mpe bokonzi na Nzambe uta ebandeli mpe Nzambe azwaki mokano ete botomboki na ye ekitisama na mobikisi oyo akoya. Sangisa makomi oyo na maloba kitoko na yango. a. Boku ya ebandeli.3 :1-15 __ Mokili mobimba ebatelami na Zabulu. b. Ezayi.14 :12-17 __ Zabulu asalamaka moto na sembo, kasi atombokela Nzambe. c. Ezek.28 :12-17 __ Zabulu akanaki ákokana na Nzambe. d. 1Yoa 3 :8-10 __ Yesu ayaki na mokili mpo na kobebisa misala ya Zabulu. e. Emon.12 :7-11 __ Abengami Satana ye mokosi ya mokili mobimba. f. 1Yoa.5 :19 __ Mokosi akosaki bato mibale ya liboso na kotindikaka bango bakweya.

Made with FlippingBook - Share PDF online