Bunda etumba elamu ya kondima

Liteya ya sámbo (7) Monguna oyo tobundisaka • 99

asikola biso na nzela ya kosopa makila ya Yesu na ekulusu, tosengeli kosalela elonga wana na kondimaka solo mpe na koboyaka lokuta. Wana esali biso bongo, tokobongola mpe etambweli na biso, bazalani na biso mpe lolenge na biso. Elonga wana ezali ya biso, kasi tosengeli tobundela yango, topekisa yango mpe tosalela yango na eleko nyonso, mpe mokolo na mokolo. Nzambe azali kotinda bandimi batosa ye na komikitisa, kotelemela zabulu, nde na sima monguna akokima biso. Mpo na nini tókanisa ete Nkolo akoki kolongisa biso bobele soki tomipesi na etumba mpe soki totelemeli monguna ntango azali komeka koyokisa biso mpasi, kokosa mpe kokweyisa biso ? Na liyangani oyo eleki (malendisi oyo tolukaka) oyekolaki ete tokoki kolingana biso na biso mpe komitosa biso na biso na lingomba tozali. Sikoyo nde okomona makambo mingi na ntina ya monguna oyo tobundisaka kati na etumba malamo ya kondima. Likolo ya Satana, molóngó mobimba ezali na etumba mpe biso tozali babundi ya etumba yango. Kokanga maboko ekoki kosalema te. Monguna na biso zabulu azali kokamba mampinga ya bikelamo ya molimo baye bazali na mayele mingi mpe nsomo. Bazali kosalela ezaleli ya mokili oyo ebeba mpe mposa ya mosuni na biso moko mpenza mpo na kotelemela mosala na Nzambe. Na bongo, tosengeli tokeba na miango na ye. Tosengeli mpe koyeba ete moto moko te azali monguna na biso. Ata ko tozali kobikela likama ya molimo mbala na mbala, Nzambe azali na biso mpe azali kosunga biso tolonga etumba malamo ya molimo, ata ko monguna azali makasi. Ata ko Yesu alongaki etumba na Ye ná monguna mpo na baklisto nyonso, tosengeli tolata ezaleli ya kobunda na monguna lokola elamba, komisenzela to kokanga motema mpe tofungola miso. Tosengeli kozala na bokebi mpe tofungola miso mpo monguna azali (zabulu azali ntango nyonso) koluka nzela ásála biso mabe, kobimela biso na etumba, mpe kobebisa biso. Na nzela ya lokuta mpe ya kofunda, koloka biso, kolembisa, kolia biso mobesu, kobebisa biso na molimo ntango tozali kolanda Klisto. Tozali na lotomo ya koyekola lolenge nini tokoki kotelemela zabulu, kopika mpende liboso na ye. Tosengeli tomibatela na bitumba na ye na komilobela solo, mpe koyeba malamo ete tosengeli kotalela Klisto na makambo nyonso. Tosengeli kotambola na nguya ya Yesu Klisto, mpe kopikama na solo na bondimi na biso. Kanisa lisusu te ete tozali biso moko na etumba tozali kobunda, bandimi ebele, baye bapanzani na mokili mobimba bazali komona mpasi na oyo ya bango bitumba bazali kobunda. Toyeba malamu ete ata etumba eleki makasi, ekatana te, ezali mikolo nyonso, kasi na suka, ngolu na Nzambe ekopesa biso elonga ya suka. Mpasi na biso ekowumela bobele ka mwa ngonga moke, kasi nkembo tokobika

Makambo ezali kati na liteya

Made with FlippingBook - Share PDF online