Bunda etumba elamu ya kondima
98 • Bunda etumba elamu ya kondima
naloba solo na Yo na bwanya nyonso na lolenge ete bayoki na ngai nyonso basosola mpe bazwa litomba na solo na Yo. Teya ngai sikoyo, awa nazali koyekola, ete nayamba liloba na Yo mpe lilako na Yo. Nasengi nyonso oyo na nkombo ya nguya ya Nkolo mpe Mobikisi. Amen. 1. « Bato oyo bazali bato ya Nzambe te, boye bazali banguna ya Nkolo te ? » Na mokili oyo etumba mpe nkanza ya biyamba ya binzambe nzambe ezali pipayi nyonso. ezali mpasi te kokanisa mbala moko ete etumba na biso ezali mpo na kobundisa bato. Na mokili mobimba, baye bazali komiloba ete bayebi Nzambe bazali koboma bato misusu baye bamonani lokola bayebi solo ya Nzambe te, to bazali nde bato mabe. Solo mpenza, bato bazali komisalela makambo ya nsomo ba-moko mpe basusu bipayi nyonso na mokili oyo, na nkanza ya bosoto mpe kozanga koyokela baninga mawa. Kasi na kolandaka Biblia etumba na biso ezali ya mosuni mpe makila te (ya bato te), kasi etumba ya nguya ya molimo oyo ezali kosala na nzela ya bato mpo basalaka makambo ya mabe na bikelamo ya Nzambe. Mpo na nini solo oyo ekoki ezali na litomba ete esosolama na moklisto ya sika to moklisto oyo azali nanu kokola ? 2. « Ebundeli ya zabulu ezali ya kobomba te ». Biblia elobi polele, etumba na zabulu ezali te lokola oyo Hollywood alingaka, asalaka bilili ya nsomo, ya bilima oyo bazali koluka bato basali mabe te, ya bato na mawa mpe bilongi ya nsomo oyo ezali kolukaka bato na banzela mike ya molili mpe na bandako ya nsomo. Na kati ya zabulu, ebundeli monene mpenza ezali lokuta, maloba kitoko abongísá oyo emonani lokola ekoki kosala mabe te, ekoki kondimama, mpe étíelama motema. Lokuta wana ezali kopesa likanisi ete Nzambe azali te, mpe makambo ya molimo ezali bobele mabongisi esalamaki mpo na kokosa, mpe kaka nzebi ya mokili kaka nde ekoki kobikisa bato na makambo na bango. Emonani mpe ete ebundeli ya monguna na biso, oyo akanisi ya bonkúkú to ya kobombana ezali na bonkúkú (sekele) ata moke te. Yeba bobele ete zabulu azali mokosi mpe tata ya lokuta. Mpo na nini tosengeli koyeba ete zabulu apona lokuta mpe bokosi lokola bibundeli na ye ya liboso kati na biso, ebundeli oyo ezali komema bato bobele na matatoli ya boluki nzebi ya mokili, siansi, mpe ya misala ya lotulo mpe kotonga oyo tobengi na lifalanse tekinoloji ? 3. « Ata ozali na elonga, osengeli kobunda mpo na yango ». Moko na makambo bapostolu babetaki nsete na mateya na bango ezali biso mpe tosengeli tosala oyo ya biso mosala na lisolo ya Nzambe. Yeba malamu ete ata bongo, Nzambe azali kolonga monguna na biso, zabulu, oyo akoki mpe kotia matoyi mangbongi. Ata ko Yesu alongela biso etumba na ekulusu, elonga ekoya bobele yango moko boye te. Ata ko Nzambe
Bokutani
Made with FlippingBook - Share PDF online