Bunda etumba elamu ya kondima

L iteya ya sámbo (7) M onguna oyo tobundisaka Kotambola kati na elonga liboso ya monguna ya Nzambe

Mpo ete tozali kobunda na mosuni mpe na makila te, kasi na bisika na lokumu, mpe na nguya mpe na mikonzi na mokili oyo ya molili, mpe na milimo mabe kati na likólo.

~ Paulo epayi na Baefeso (Baef 6 :12.)

Mposa ya kokokisa nsima ya liteya

Nsima ya liteya oyo, bokokutana na makambo oyo ebimaka na etumba kati na biso ná Monguna mpe tondima ete : • Molóngó to mokili mobimba ezali na etumba ya molimo ; zabulu mpe bokonzi ya molili bazali kobunda na Nkolo Yesu mpe bokonzi ya pole : tozali « kobunda ná mosuni mpe makila te ». • Klisto alóngá monguna zabulu na etumba. Ye zabulu azali bobele kokoba kosala na nzela ya kokosa na mokili oyo ekweya na mabongisi mabe na yango mpe na bomoto na biso ya kala ; elingi koloba, « mposa ya mosuni » • Tosengeli tolonga monguna soki tondimi ete Klisto alongaki masumu na ekulusu ; keba, zabulu akoki kokosa biso. Kangama na bilaka Nzambe mpo na kotelema ngwi liboso ya monguna. Nzambe ya bileko nyonso, Tata na ngai, olobi na Liloba na yo ete ozali liziba ya bwanya mpe ya mayele nyonso. Nandimi ete ezali solo ; Tata ya bolingo, nasengi opesa mpe ngai bwanya ya bonzambe mpo ngai mpe nakoka kokabola Liloba ya solo (2Tim.2 :15). Nabondeli yo lakisa ngai mpe lakisa ngai nzela nakolanda (Nje.32 :8), mpe kamba matambe na ngai. Sunga ete matoyi na ngai ebongama mpo na koyoka mongongo na Yo, mpe sembola ngai na lolenge ya kobanza mpe ya koloba mpe zongisa ngai na nzela soki nabungi. Tata, pesa ngai likabo ya bokesenisi, mpe sunga ngai nakoka koyekola mpe nayeba bokeseni kati na mateya, milimo mpe makabo ya Nzambe ya solo mpe na oyo ya binzambe-nzambe. Monisa ngai, na nzela ya Molimo Mosanto, mokano na Yo, mpe pesa ngai lisosoli malamu na lolenge nakoki kosalela mposa na Yo na motema mobimba. Nkolo ya bolingo, nabondeli Yo sunga ngai nayokamela mpe nayoka noki, kasi náloba mpe nasilika noki te (Yak.1 :19). Tika ete maloba ya monoko na ngai mpe makanisi ya motema na ngai edimama na miso na Yo. Sunga ngai

Libondeli ya kofungola mpo na kosenga bwanya

97

Made with FlippingBook - Share PDF online