Bunda etumba elamu ya kondima
Liteya ya sámbo (7) Monguna oyo tobundisaka • 103
7. Ezali te ete makambo nynoso toyokaka na ntina na Yesu to na mosala na ye nde ezali solo. Na bongo, tosengeli tomeka milimo, mpo oyo afandi kati na biso aleki monene. Tanga 1Yoa. 4 :1-6. a. Ndenge nini okomeka milimo ; nalingi koloba ndenge nini okoyeba Molimo ya Nzambe ? (vv. 1-3) b. Molimo Mosanto (oyo azali kati na bino) aleki oyo azali kati na ____ _____________________________________ na monene (vv.4). 8. Tokoki kosutuka to tobanga te ntango bato basosoli biso te, to sokI babwaki biso, to mpe ata bayini biso na ntina ya kondima na biso. Tozali kolanda matambe ya Yesu, oyo abikelaki makambo wana. Tanga makomi oyo mpe yanola mituna oyo : a. Tanga Yoa. 15 :18-21. Mpo na nini mokili azali koyina bino ? b. Tanga 1Yoa3 :11-15. Mpo na nini tokamwa te soki mokili ezali koyina biso ? c. Tanga jaki 4 :1-7. Nini tokoki kosala mpo toyeba soko ya solo zabulu (oyo azali kokonza mokili) akokima biso ? Na kolandaka makomi, zabulu mpe bato mibale ya liboso batombokelaki mobeko mpe bokonzi ya Nzambe mpe botomboki na bango ekotisi molóngó mobimba na etumba se mbala moko. Uta kokweyisama ya moto na elanga na Edeni, Nzambe akamataki mokano ya kokweyisa zabulu na batomboki nyonso kati na bikelamo na kotindaka Mwana na ye bobele kati na bikelamo yango. Yesu akotaki na mokili kokweyisa zabulu, kofuta nyongo ya masumu na biso, mpe kosala ete bokonzi na Nzambe etonda lisusu. Matondo na Nzambe, mpo na mosala ya Yesu ya Nasaleta na mokili oyo, zabulu asila kokweyisami mpe bokonzi na Nzambe eye mpe epesameli baye nyonso bakondima ! Wana tondimeli sikoyo, tokangolami na bokonzi ya molili mpe tofandisami na bokonzi ya Mwana na Ye ya bolingo (Bakolos. 1 :13). Sikoyo biso tokoti na etumba, tozali babundi na etumba. Tobengami mpo na kotalisa Nkolo na biso, molongi ya nguya mabe oyo ayokisaki bikelamu na Nzambe mpasi. Na etumba wana, moto moko akoki komilongola te. Motemeli na biso, zabulu azali kotambwisa mpe kokamba milimo oyo ezali kobebisa bomoyi ya bato na mayele mabe na lokuta. Ndenge makambo ezali na mokili oyo ezali kosala nzela moko na mposa ya mitema na biso mpo na kolembisa mokano na Nzambe na biso. Tosengeli kozala bato ya kokanga motema mpe ya bokengi, bato bayebi kososola mayele mabe ya zabulu oyo azali kosala nyonso été
Na mokuse
Made with FlippingBook - Share PDF online