Bunda etumba elamu ya kondima
104 • Bunda etumba elamu ya kondima
atutanisa biso na biso mpe ayokisa biso mpasi. Tokoki kotelemela ye na nguya ya Molimo Mosanto wana tokangami na solo ya Liloba na Nzambe, mpe tosundoli lokuta ya zabulu ntango eyeli biso. Nzambe akopesa biso nguya ntango tozali kobunda etumba malamo ya kondima ! Kozala ya Yesu na kati ya lisolo nyonso mpe na ndimbola ya kozalisama ya moto nde ebengi biso tokota na kati ya Yesu Klisto oyo tozali kotanga na Biblia mobimba uta ebandeli kino suka. Lokola bateyi ya Liloba, tozali na bosenga ya komikotisa kati na lisolo ya somo ya Nzambe, ya Nzambe moko kati bato mísato, na komonisaka yango na bomanyoli mosala ya Klisto na lisapo monene na lisolo etali bomoyi ya bato. Ntina ya likambo oyo Nzambe abikisaki biso nyonso na likama –ezali maloba ya Kofúla mpema te, to mpo na kolendisa bato, to mateya ya kobikisa babeli te, kasi esengeli ezwama lokola liloba ya ntina mpenza na lingomba. Wana ezali bobele ndenge bantoma bazalaki kotanga mpe koteya makomi mpamba te, kasi ezali mpe lisusu lolenge ya batata ya Eklezia, mpe na koleka mpenza nde mangomba ezali kosala losambo ya ndéle ya kala (elikya ya kala).
~ Robert E. Webber. Ancient- Future Louange : Proclaming and Enacting God’s Narrative. Grand Rapids, MI : Baker Books, 2008, p. 121.
Minkanda ya kobakisa
Minkanda oyo ebakisami, osengeli otanga mpe omanyola yango mpo ekokani na liteya oyo tolingi tozwa. Lilako ya Klisto Molongi (Monk.ya kob.11) Klisto Molongi: Emoneneli ya bomoyi mpe matatoli ya baklisto mpe litatoli (Monk.ya kob.12) Yesu ya Nasaleta : Komonana ya Ntango Ekoya (Monk.ya kob. 4) Yesu Klisto, Mutu ya likambo na Biblia (Monk.ya kob.22). Tika Nzambe akumisama ! Ba « Ko » nsambo ya koluka Nkolo mpe kosenga lisungi na ye (Monk.ya kob.23)
Kokamwa te na komekama na mpasi ozali konyokwama lokola nde eloko ya mopaya ebimeli yo (1Pet. 4 :12)
Mobeko ya ntina
Koyekola makambo tokutanaka na yango
Tanga mpe sosola makambo mpe makanisi oyo mpe yanola, na bozindo ya bososoli biyano na kolandaka makomi owutaki koyekola.
Made with FlippingBook - Share PDF online