Bunda etumba elamu ya kondima

Liteya ya sámbo (7) Monguna oyo tobundisaka • 105

1. « Nazali koluka nayeba ndimbola ya kotelema ngwi na kondima kasi nazali kolonga te ». Na nsima ya boyekoli monene ya Biblia na baninga, elenge moklisto atelemaki na ndimbola ya 1Pet.5 :8-9 : « Bosenzela, bolala mpongi te. Monguna na bino, zabulu azali kongoluma epayi na epayi lokola nkosi ezali koluka moto ya kolia. Botelemela ye, bopikama na kondima na bino, na koyebaka ete komekama ya motindo wana ezali kobimela bandeko na bino bipayi nyonso na mokili mobimba ». Elenge mwasi moklisto wana amekaki koluka asosola ndimbola ya kotelema ngwi na kondima. Ntango bayekolaki bango na molakisi na bango, ayokaki ete liloba kotelemela ezali awa na makomi oyo ewuti na lokota ya Baela to Bageleki mpe elimboli « antistete », yango kaka elobami na Baefeso 6 :11-13 mpe na Yakobo 4 :7. Elingi koloba kowumela na kondima, kotia motema mpe kokangama se na Liloba na Nzambe ata makambo ebaluki mpe ekesani na lolenge okanisaki. Elenge moklisto mwasi abundaki na mituna makasi, « Yango elingi koloba nde nakoki to nasengeli kotia ntembe te ? Bongo soki naselemwi mpe nakweyi–nakoki kotelema lisusu ? « Sikoyo okoki koteya elenge mwasi moklisto wana mpo asosola liloba wana boni ? 2. « Mpo na nini Nzambe akoki kopesa zabulu nzela ya konyokola mpe kotuka biso, ata Nkolo Yesu asila kolonga ye mpo na biso ? » Moko ya mituna ya makanisi ya kokamwa mpo na bandimi ya sika basosola ezali mpo na nini ebongi na bandimi ete batelema ngwi na kondima na bango na lokuta ya monguna, soki Yesu asila kolonga etumba. Ya solo, Yesu asila kokweyisa zabulu na ekulusu (Bakolo.2 :15), mpe bandimi bazali kolonga na makila ya mwana na mpate mpe na liloba ya matatoli na bango, koboya lobiko na bango kino na liwa (Emon.12 :9-10), mpo na nini balingi kaka kobundaka lisusu ? Mpo na nini Nzambe azali kopesa nzela na zabulu abundisaka bato na ye, ata ko Yesu abebisaki misala na ye uta abandaki kokoma (1Yoa. 3 :8) ? (Pesa likanisi : Yesu alobaki ete mosali alekaka nkolo na ye te, tala Yoa.13 :16) 3. « Moto moko te akoki koyeba mpasi mpe mpota ya motema oyo nazali komona. Ata moto moko te ! » Ntango tolekisi ngonga na bwale, to tozali na mpasi na motema, to tobungisi eloko nini, tomekamaka mingi na kokanisaka ete moto moko te amekámá lolenge biso tomekami na mpasi kokokana na oyo ya biso. Lolenge ya mpasi, minyoko to kobungisa eloko ezali ya moto ye moko na kati na nzoto mpe na bomoyi na ye moko. Mpasi to etumba ekoki ezala makasi kino emema biso na kobanza ete moto mosusu na mokili akómá na motindo yango te to koyeba mpota monene ya bolembu na ye te. Makomi mingi na Biblia ewangani likanisi wana. Nzoka nde makama, mikakatano, bampasi, mpe komekama ya bato nyonso ekokani. Tala oyo Paulo akomelaki Bakolinti : « Motindo ya komekama ozali komona ezali bobele ndenge moko na oyo ya bato nyonso na mokili. Kasi Nzambe

Made with FlippingBook - Share PDF online