Bunda etumba elamu ya kondima
106 • Bunda etumba elamu ya kondima
azali kobatela elaka na ye, mpe akoki te apesa esika ete omekama koleka makasi na yo ya kotelema ngwi na kondima na yo ; ntango ozwi komekama, akopesa yo nguya ya kokanga motema mpo nzela ya kobima na yango. 1Bakol.10 :13 Ndenge nini kososola na biso ya solo ekoki kosunga biso totelema ngwi na bileko makasi ? Matondo na Nzambe mpo apesa biso elonga na nzela ya Yesu Klisto (Bakoli.15 :57) ! Abíkísá biso na etumba ya Zabulu, tokangólámá na bokonzi ya molili, tosómbámá na makila ya Yesu na ekulusu, toyambámá lokola baí-bokonzi ya sika mpe tozali kotuta ntolo lokola bato ya bokonzi ya sika mpe bato ya bokonzi ya Mwana molingami ya Nzambe (Bakolos. 1 :13). Elonga monene wana ezali ya biso, kasi tosengeli koyekola ndenge nini tokoki kotelemela monguna na biso, kokota na etumba malamu ya kondima, kobunda lokola babundi mpenza kati na etumba oyo. Kanisa nanu bipayi yo obengamaki otalisa Klisto Molongi, wana nkombo mosusu ya Yesu, yango elimboli « Klisto nde molongi ». Kati na libota na yo, kati ya baninga, kati na bazalani na yo, na esika ya mosala mpe bato oyo okutanaka na bango, ozali sikawa moto na mapinga ya Klisto (2Tim. 2 :1) mpe obengami kotelema ngwi mpe kotelemela bitumba nyonso ya monguna na biso. Moko na biloko oyo tosengeli koyekola na etumba oyo ezali kokokisa maloba na mateya ya Liloba na Nzambe. Ezali bobele makambo oyo ebimelaka biso te kasi makanisi tolobaka biso moko nde ekomisaka biso lolenge tozali to eyokisaka biso lolenge toyokaka mpe etindaka tosala oyo tosalaka. Tosengeli tomilobela solo biso moko na ntina ya etumba monene oyo, na ntina ya ezaleli na biso moko, na ntina na elonga ya Klisto, mpe na ntina na makoki Nkolo apesi biso mpo na kosunga biso tolonga na etumba. Lokola makanisi tozali komilobela (makambo tozali kondima) ezali komonisa ezaleli na biso, tosengeli toyekola motindo ya sika ya komilobela biso na biso. Tosengeli toyekola koyokana na Nzambe, kondima elonga Yesu alongaki nguya ya mabe, mpe tondima ete soki tondimi kosala nyonso ewuti epayi na Nzambe mpe kotelemela lokuta ya zabulu, zabulu akokima. Bandaka kaka lelo kosenga Molimo Mosanto asunga yo ete oyeba lokuta oyo obandáká kondima. Zwa mokano ya komanyola lobiko na yo na kolandaka Liloba na Nzambe mpe elonga na yo na kati na Klisto, kasi na biloko ozali koluka to na lolenge ozali koyoka te. Koyekola mimesano ya makanisi ya sika ezwaka ntango mingi, na bongo zala na koyika mpiko. Ntango ozali kondima solo mpe komilukela elonga na Klisto, ozali kokoma makasi koleka, mpe ekokomisa yo na nguya mingi na kobunda etumba ya Molimo. Banda lelo, senga Nzambe apesa yo nguya ntango ozali komekola bizaleli ya sika mpe lolenge ya sika ya kobanza. Wana osali bongo, okobika na elonga oyo Yesu asila kozwela yo mpe akobatela ete ozwa bolembu na motema te, mpe molimo na yo etumbolama te mpe okokola kino okokemba na bomoyi na yo ya kimoklisto.
Bokutanisi
Made with FlippingBook - Share PDF online