Bunda etumba elamu ya kondima

Liteya ya sámbo (7) Monguna oyo tobundisaka • 107

Nazali na monguna oyo azali koluka alembisa ngai na mosala ya bokonzi, na bongo nakosutuka te soki komekama eyeli ngai.

Kondima

Anselme, moto ya Canterbury (1033-1109), abotamaki na France mpe sima akomaki mokambi na mboka ya Angleterre. Abengami « mobandisi ya Skolastiko (Scholasique/scholasticism) » mpo ye nde moto apesaki likanisi ya boyekoli makambo etali Nzambe. Ayebani mingi lokola mobandisi ya « molimboli ezaleli ya Nzambe (to na lifalanse argument ontologique) ». Libondeli ya kosenga mayele, Anselme. O Nkolo Nzambe na ngai, Lakisa motema na ngai lelo esika nini mpe lolenge nini nakoki komona Yo Epayi wapi mpe ndenge nini nakutana Yo. Yo okelaki ngai mpe okeli ngai lisusu, Mpe yo opesaki ngai biloko Biloko ya malamu nyonso nazali na yango, Kasi nazali koyeba Yo kaka te. Nasálá nanu yango te Mpo na nini nasálémáká. Teya ngai ndenge ya koluka Yo, Mpo nakoki koluka Yo te Kaka soki olakisi ngai, Lolenge nini nakokuta Yo,

Libondeli

Kaka soki omimonisi epayi na ngai. Tika ete naluka Yo na mposa na ngai, Tika ete nazala na mposa na yo na boluki-luki na ngai.

Tika ete nakutana Yo ntango nalingi Yo, Tika ete nalinga Yo ntango nakutani Yo.

~ Don L. Davis. A Sojourner’s Quest. Wichita, KS : Institut du Ministère Urbaine, 2010, p. 98.

Kokîmela to kolela na motema epai na Nkolo

Tata wa bolingo oyo azali na likolo, Nzambe mpe Tata ya Nkolo Yesu Klisto, matondo mpo na elonga opesaki na bana na Yo na etumba na monguna, zabulu. Bolingo na Yo epayi na biso etindaki Yo opesa biso Mwana na Yo lokola likabo mpe sikoyo tokangólámi na bokonzi ya molili ya monguna mpe tokómi bato ya bokonzi ya Mwana na Yo. Yo olimbisi ngai na masumu, opési ngai kimia na nzela ya makila na ekulusu, mpe opesi ngai bomoyi ya seko na nkombo na Ye. Natondi yo, Tata ya bolingo, mpo sikoyo nazali mwana na Yo, mpo ete Molimo Mosanto na Yo azali kolakisa ngai nzela mpe kokamba ngai mpo

Made with FlippingBook - Share PDF online