Bunda etumba elamu ya kondima

108 • Bunda etumba elamu ya kondima

nakoka kotambola na elonga na nkombo na Yesu. Mema ngai na komekama te, kasi bikisa ngai na mabe nyonso. Mposa na ngai ezali moko ete Yo okumisama, omemisama na lolenge nazali mpe na misala na ngai. Yokela ngai ngolu lelo mpo nakumisa Yo, mpo Yo moko kaka nde obongi na masanjoli. Na nkombo na Yesu, nabondeli bongo. Amen. Na www.tumi.org/sacredroots, tozali na eteni ebulisami mpo na makomi ya kobakisa mpe bisaleli ya komona na miso. Neil T. Anderson. Victory over the Darkness. Bloomington, MN: Bethany House Publishers, 2013. Mpo na liyangani ezali koya, bibundeli oyo tosalelaka bakisa na makambo oyo : 1. Nzambe apesi biso bibundeli mpo tokoka kotelema ngwi. 2. Tosengeli kondima solo mpe koboya lokuta. 3. Tozali kokolisa nguya na biso ya kobunda na nzela ya botosi toli ya Molimo. 1. Bongisa mposa na yo ya koyekola lisusu mateya oyo, moke na yango bobele mbala mísato, na poso ekoya. Mekola komiyebisa yo moko solo na kolobaka makambo ya solo na mongongo makasi mokolo mobimba. Ndakisa, okoki koloba, « Matondo, Tata na lola mpo na elonga ya zabulu mpe banzela na ye na bomoyi na ngai na nzela ya kondimela Yesu Klisto » to « Likanisi oyo ewuti na Nkolo te. ezali lokuta, mpe nakondima yango te ». Okoyekola mimesano ya sika ya komilobela yo moko na mongongo makasi ntango otamboli na kondima mokolo mobimba. 2. Nzela mosusu ya kolonga monguna ezali kosala botosi ya kokila. Kokila ezali komiboyisa bileyi to misala misusu ya momesano mpo na kotia motema bobele na mokano na Nzambe mpe etumba malamu ya kondimi. Kila bileyi mpo obondela, yekola mpe manyola makanisi na liloba na Nzambe. (Soki nzoto na yo ezali malamu te mpe ekoki kosunga yo komiboyisa bileyi te, okoki komiboyisa likambo mosusu, lokola komiboyisa televizio, to mabongisi ya ngonga ya kosakana). 3. Koma lolenge obikelaka na kokila bileyi na buku na yo ya makambo osalaka mokolo na mokolo mpe solola yango na bandimi baye bakemba na kondima na lingomba. 4. Bongisa linaka ya kokila na mbala ekoya. Yoa. 16 :33

Mateya ya kokoba

Mpo na liyangani oyo ezali koya

Makomi ya kobomba na mutu

Mosala ya kokokisa na ndako

Made with FlippingBook - Share PDF online