Bunda etumba elamu ya kondima

L iteya ya mwámbo (8) B ibundeli oyo tosalelaka Kolatisama na bibundeli nyonso ya Nzambe

Mpo na oyo, bokamata molato mobimba na etumba na Nzambe ete boyeba kotelema na mokolo na mabe mpe nsima ya kosala nyonso, kotelema naino. Bongo botelema na loketo lokangami na sembo mpe na kolaya boyengebene lokola kasaka ya bibende, mpe koselingwa na sapato na makolo lokola bantoma na nsango na kimia. Na yango nyonso bokamata nguba na kondima, na yango bokoki kozimisa mbanzi nyonso na nyonso na oyo mabe. Bokamata ekoti na kobika mpe mompanga na Molimo, yango Liloba na Nzambe. Na nsuka ya liyangani oyo, esengeli okokutana na bibundeli oyo tosalelaka wana endimi biso ete : • Nzambe asila kokabela mondimi nyonso bibundeli asengeli na yango mpo na kotelemela monguna mpe kotelema ngwi ntango ya etumba. • Solo ya Makomi (nalingi koloba, Liloba na Nzambe) ekoki kopesa biso nguya ya kososola, ya kotelemela, mpe koloba solo na esika ya lokuta moyini azali kobelela epayi na biso. • Molimo Mosanto azali kokolisa nguya na biso mpo na kobunda na nzela ya kosalela bitinda ya Molimo Mosanto. Nzambe ya bileko nyonso, Tata na ngai, olobi na Liloba na yo ete ozali liziba ya bwanya mpe mayele nyonso. Nandimi ete ezali solo ; Tata ya bolingo, nasengi opesa mpe ngai bwanya ya bonzambe mpo ngai mpe nakoka kokabola Liloba ya solo (2Tim.2 :15). Nabondeli Yo lakisa ngai mpe teya ngai nzela nakolanda (Nze.32 :8), mpe kamba matambe na ngai. Sunga ete matoyi na ngai ebongama mpo na koyoka mongongo na Yo, mpe sembola ngai na lolenge ya kobanza mpe ya koloba mpe zongisa ngai na nzela soki nabungi. Tata, pesa ngai likabo ya bokesenisi, mpe sunga ngai nakoka koyekola mpe nayeba bokeseni kati na mateya, milimo mpe makabo ya Nzambe ya solo mpe na oyo ya binzambe-nzambe. Monisa ngai, na nzela ya Molimo Mosanto, mokano na Yo, mpe pesa ngai lisosoli malamu na lolenge nakoki kosalela mposa na yo na motema mobimba. Baef. 6 :13-17 (Biblia ana y Lingala Haut Fleuve)

Mposa ya kokokisa nsima ya liteya

Libondeli ya kofungola mpo na kosenga bwanya

109

Made with FlippingBook - Share PDF online