Bunda etumba elamu ya kondima

110 • Bunda etumba elamu ya kondima

Nkolo ya bolingo, nabondeli Yo sunga ngai nayokamela mpe noyoka noki, kasi naloba mpe nasilika noki te (Jaki.1 :19). Tika ete maloba ya monoko na ngai mpe makanisi ya motema na ngai edimama na miso na Yo. Sunga ngai naloba solo na Yo na bwanya nyonso na lolenge ete bayoki na ngai nyonso basosola mpe bazwa litomba na solo na Yo. Teya ngai sikoyo, awa nazali koyekola, ete nayamba liloba na Yo mpe lilako na Yo. Nasengi nyonso oyo na nkombo ya nguya ya Nkolo mpe Mobikisi. Amen. 1. « Moto nyonso azali na kati ya etumba ya molimo ? Namoni yango mwa moke lokola masapo ya Holywood ! ». Ntango bazalaki kotiana ntembe na liteya ya pasitele ye na moninga mopakano na likambo etali etumba ya molimo, elenge moyekoli ya Klisto akutanaki na ntembe ya solo mpenza na mbala na ye ya liboso na makambo ya Molimo. Moninga ya elenge mwasi Debbie, Ralph, azalaki koyokamela ndenge Debbie azalaki kokabola bondimi na ye epayi na Klisto ye na Ralph, ndenge nini Yesu akufaki na ekulusu mpo na kofuta nyongo ya etumbu mpo na masumu ya moto, kokweyisa nguya ya monguna oyo akangaki moto na bowumbu likolo ya kobanga liwa. Olobaki nini Deb ? « Olingi koloba ete tozali na motindo moko ya etumba ya Molimo ? » Debbie azongisi : « Iyo, Biblia elobi ete molóngó mobimba ezali na etumba, mpe monguna mpenza ya moto ezali ndeko na ye moto mosusu te, kasi monguna ya mabe mingi mpenza, Satana, oyo lokuta mpe kokosa na ye etindaki moto atombukela Nzambe mpe etinda bato bayokisana mpasi bango na bango ». « Nayebi tɛ soki nakoki kondima yango, Deb. Olingi koloba ete moto nyonso azali bobele na kati ya etumba ya Molimo ? Wana namoni yango lokola nde masese ya Holywood ! » Ndenge nini okoki koteya Deb ayanola moninga na ye Ralph na likambo etali etumba ya Molimo ? 2. « Lokuta ezali bibundeli oyo ezali koboma mokili, eleki misilles oyo eleki bamissiles nyonso na nguya ». Wana lolenge emonaki moko na bateyi monene ya Biblia baye bayebani na mokili; nkombo na ye Rév. Dr. John Stott. Alimbolaki mingi Makomi na Nzambe mpe andimaki ete na etumba ya molimo oyo moyekoli nyonso ya Klisto akótá, motema mpenza ya etumba ezali koloba to kotatola « solo » ; elingi koloba, yango nde ndimbola ya malamo ya mokili, ya lobiko, mpe biloko nyonso ekoya na nsima. Alobaki ete solo ya Makomi (Liloba na Nzambe) ekoki kosunga biso koyeba mpe kotelemela lokuta, mpe koloba solo na esika ya lokuta oyo monguna azali koloba na biso. Okanisi boni mpo na liloba oyo : « Lokuta eleki bibundeli nyonso na koboma bato na mokili ». Okoki kokanisa ndakisa misusu ya lokuta oyo bato bandima mpe ekotisa makambo ya nsomo to ebomisa bato bobele kaka mpo bato bandima yango lokola nde ezalaki solo ?

Bokutani

Made with FlippingBook - Share PDF online