Bunda etumba elamu ya kondima

Liteya ya mwámbo (8) Bibundeli oyo tosalelaka • 111

3. « Eloko oyo ozali kozongela mbala na mbala nde okomesana kosala yango malamo koleka » Biso nyonso tozali bikelamo topesama mimesano, oyo soki endimami,ekosuka bobele ezwa ndingisa ya kosalema mpe ekomi lokola ezaleli ya motuya oyo bato bazali na yango bosenga. Na mobeko, ezali makasi te. Ntango oleki kosalela ezaleli likanisi, mosala to eloko songolo, yango ekokoma pete na kosala soki olingi osalela yango to ozongela yango, lokola momesano, moto akosala yango malamo koleka. Na mobeko, « Kozongela likambo ezali mama ya nzebi ». Kaka lolenge wana nde Nzambe apesa biso makambo misusu tosalelaka oyo ezali kokolisa biso na Molimo, oyo ebengami na lompoto “discipline” elingi koloba komiyikisa mpiko mpo likambo libonga, yango nde epesaka makoki ya kobundisa monguna. Ntango osaleli yango mingi na bomoyi na yo ya kimoklisto (kobondela, kosangana na baninga baklisto, kotanga Liloba na Nzambe, koyekola makomi, koyekola makomi na mutu), okokóma makasi koleka mpe yango ekokoma pete ezala mpo na koyeba likambo ya lokuta ya moyini mpe kokoka kotelemela ye na nzela ya kondima. Tanga Bangalatia 6 :7-9. Ndenge nini mokapo wana ekosunga biso tososola lolenge ya kokola, kokemba na kati ya Klisto na kokanga motema mpe kotelema ngwi na kolukaka ete makambo ya Molimo ebonga ? Na liyangani eleki (Monguna oyo tobundisaka), oyekolaki lolenge ya monguna, kasi na liyangani ya lelo tokomona lolenge ya kosalela « bibundeli nyoso ya Nzambe », molato oyo Nkolo apesa biso mpo na kobunda etumba malamu ya kondima. Lolenge mpenza ya moklisto ezali etumba, ya ye na bato te kasi ya ye na nguya ya milimo mabe oyo etelemeli mosala na biso mpo tozali bato ya Klisto. Tosengeli kokamwa te soki monguna azali motema mabe ; kobundisa na ye ezali makasi mpe ekosila noki te. Nzambe apesa biso bibundeli ya malamu, lisanga ya bibundeli ya molimo oyo tokoki kosalela na etumba ya Molimo. Etumba oyo tozali kati na yango emonani lokola etumba oyo ezali kobundisa nguya ya milimo ya mabe oyo ezali na mokano ya kobebisa kondima na biso mpe kotia kaka na komipesa na biso epayi na Klisto, na kotiaka mayele mpe bisengo ya mokili na esika ya komipesa na Klisto. Biblia emonisi bilembo ya lokuta ya monguna lokola moto ya misile (mindoki makasi), lokola tolo-tolo (flèche) ya moto ya nkanza, ata bongo yango ekoki kobebisama na nguba ya kondima. Kondima tondimeli Nzambe ezali nguba oyo ezali kobatela biso liboso ya « motomboki », Satana. Yesu azali Nkolo na biso, mobundi uta na Nzambe oyo alonga Satana na elonga ya nguya na nzela na ekulusu mpe na lisekwa na Ye kati na bakufi. Biso tozali balongi kati na Molongi Ye moko, Klisto molongi, Nkolo Yesu Klisto.

Makambo ezali kati na liteya

Made with FlippingBook - Share PDF online