Bunda etumba elamu ya kondima

112 • Bunda etumba elamu ya kondima

Nzoka nde bandimi bazali babundi ya Molimo, basoda ya Klisto, baye bayebi mpenza oyo ezali kosalema kati na etumba tozali kobunda na lokuta ya monguna. Tosengeli kozwa Molimo ya kobundisa monguna, kotalisa Klisto na lokumu nyonso na makambo tozali kosala mpe tokeba na etumba ya Molimo ntango tokangami na Nzambe Tata ya Nkolo na biso Yesu Klisto na kondima lokola bana mike. Na nzela na Klisto Yesu, tokoki kotelemela nyonso oyo monguna akoluka kokosa biso. Mpo ete motambo ya zabulu oyo eleki monene ezali lokuta, ebundeli na biso ya makasi ezali kondima solo mpe koboya kondima lokuta, kokeba na lokuta nyonso oyo ezali kobenda biso ete tondima yango. Eteni moko moko ya ebundeli ya Nzambe ezali na ndenge nyonso kosangana na solo na Nzambe kati na Klisto. Yango wana tosengeli koyekola kokesanisa biteni oyo ezali kosala bibundeli mpo ete na ntango ya etumba tokoka kosalela yango malamu mpe na bwanya mpo totelemela monguna. Ntango tomipesi mingi, wana tokobunda malamu mingi koleka lokola basoda ya Yesu Klisto.

Satana ayáká na elanga mpe alobelaka Adama na Ewa na limpwepwe (akosaki bango mpe biso nyonso) : « Okoki kondimela Nzambe te…Abombi bino makambo misusu…Bino moko bomibatela mpo na bomoyi na bino ».

~ John Eldredge. Epic : The Story God Is Telling. Nashville : Thomas Nelson, Inc., 2004, p. 55.

Bibundeli oyo tosalelaka Liteya ya mwámbe (8) Tanga makomi oyo mpe yanola na mokuse mituna ekokani na liteya moko moko ya Biblia. 1. Ntango tozali kobika awa na mokili, tozali kobunda etumba ya molimo na ndenge ya mokili te ; bibundeli na biso ewuti na Nzambe oyo azali kolakisa biso ndenge ya kobunda etumba malamu. Tanga na 2 Bakolinti 10 :3-5 mpe tondisa bisika ya polele na maloba etali bibundeli ya etumba. a. Bibundeli oyo Nzambe apesa biso ezali ______________________ te. b. Bibundeli wana ya Nzambe ezali na nguya ya kobebisa ___________ . c. Na nzela ya bibundeli yango tokoki kobebisa ____________________ mpe nyonso _______________________________ oyo ekotelemela boyebi Nzambe

Made with FlippingBook - Share PDF online