Bunda etumba elamu ya kondima

Liteya ya mwámbo (8) Bibundeli oyo tosalelaka • 113

d. Ndenge tozali kosalela bibundeli ekosalisa biso ete _______________ __________________________________________________________.

2. Nzambe apesa bandimi bibundeli malamo mpo na kotelema ngwi liboso ya miango mpe mayele mabe ya monguna na biso zabulu oyo azali kosalela lokuta mpo ete abangisa mpe abebisa bandimi. Kokanisa makomi oyo na ndimbola oyo epesami : a. Baloma 13 :11-12 __ Bibundeli nyonso ya Nzambe ekosalisa biso totelemela monguna ! b. Baef. 6 :11-12 __ Tolongola misala ya molili, tolata bibundeli ya pole. c. 1Bates. 5 :8 __ Kasaka ya bibende ya kondima mpe ya bolingo elongo na ekoti ya elikya ya lisiko. 3. Etumba ya bandimi ezali bobele bango na zabulu te kasi ezali mpe na oyo Biblia abengi « mokili » mpe « mosuni » (lolenge ya masumu ya bango mpenza). Satana azali kobundisa bandimi libanda na nzela ya komekama na ndenge mokili ebongisama mpe azali lisusu komeka kati (ya nzoto ya moto) na kotindaka bandimi bakweya na mposa makasi ya nzoto na bango. a. Jaki. 4 :4 ___ Moyini azali koluka abebisa komibulisa na biso epayi na Klisto b. Yuda 3-4 __ Kozala moninga ya mokili ezali kozala monguna ya Nzambe. c. 2Koli .11 :_________ Zabulu azali kofunda bandimi, kolukaka kokitisa bango liboso ya Nzambe. d. Emon.12 :10 __ Lokuta ezali ebundeli ya liboso monguna asalelaka mpo na koyokisa bandimi mpasi na etambweli na bango. 4. Bandimi basengeli bazwa bibundeli na Nzambe nyonso mpo na kotelema ngwi na mokolo ya mabe, mpe sima ya kotelemela monguna, batelema ngwi na kondima na bango. Tanga Baefeso 6:13-18. Sangisa ebundeli ya Nzambe moko moko na ndimbola ekokani na yango. a. Mokaba __ lobiko.

Made with FlippingBook - Share PDF online