Bunda etumba elamu ya kondima
114 • Bunda etumba elamu ya kondima
b. Kasaka ya bibende __ ya Molimo, Liloba na Nzambe. c. Sapato
__ ya kolengela mpo na Nsango Malamo ya kimia.
d. Nguba
__ ya solo
e. Ekoti
__ ya kondima
f. Mompanga
__ ya sembo
5. Na etumba na biso ya Molimo, Nkolo azali nguya mpe nguba na biso, azali kopesa biso makoki ya kobunda na lokuta, mbeba mpe lokuta ya zabulu. a. Tanga Matai 4 :1-11.Ndenge nini Yesu atelemelaki bitumba mpe komekama ya monguna ? b. Tanga Nzembo 18 :31-48. Pesa ndenge mísato Nkolo abongisa mpo na basoda ya molimo mpo ete bakoka kotelemela monguna. i. ii. iii. c. Tanga Nzembo 144 :1-10. Lolenge nini Nkolo azali kolakisa biso ndenge ya kobunda na « banguna » ete lokuta tozali kokutana na yango mokolo na mokolo ? 6. Basoda ya molimo basengeli balata molato ya Nzambe mpe basengeli komipetola na koboya makambo nyonso oyo ezali kopekisa bango ete balanda nzela ya Nzambe. Tanga 1 Tim. 6 :11-16. Okoki kolanda nini mpo na kobunda etumba malamu ya kondima ? 7. Lisumu ezali kozipa nguya na biso kati na etumba mpe ekoki kolembisa biso to kotinda biso ete totika kobunda ; kasi soki tosali lisumu, Nzambe apesa biso molobeli oyo akotelema mpo na biso liboso ya Tata.Tanga 1Yoa.2 :1-2. Soki tosali lisumu, molobeli nani akosamba mpo na biso ?
Made with FlippingBook - Share PDF online