Bunda etumba elamu ya kondima
Liteya ya mwámbo (8) Bibundeli oyo tosalelaka • 115
8. Ata ko etumba ná masumu ezali matata mpe kolembisa, bolingo na Nzambe ezali kolendisa biso ete na suka ya etumba tokozala balongi. Tanga Baloma 8 :28-39.Tondisa bisika oyo ezali polele : a. Makambo nyoso ekosalama mpo ________________________,bato oyo ye abengi kolanda _______________________ (vv.8). b. Soki Nzambe azali mpo na biso,nani ______________ biso ? (vv.31). c. Nani akoki kokabola biso na __________________ Klisto ? (vv. 35). d. Na makambo oyo nyonso tozali _________________ na nzela na Ye oyo alingaka biso. (vv.37). e. Tanga biloko oyo ezangi nguya mpo na kokabola biso na bolingo na Nzambe oyo ezali kati na Yesu Nkolo na biso (vv. 38-39). 9. Mompanga ya Molimo Mosanto ezali Liloba na Nzambe, Liloba na Nzambe ekomamaki na nguya ya Nzambe.Yango ezali na nguya ya kobongisa biso mpo na kolenda mpe kowumela kati na mbela ya Klisto. Tanga 2Tim. 3 :16-17. Koma makambo mísato oyo Biblia epesi biso mpo tobota mbuma malamu. 10. Mpo na kozala na makasi na etumba ya Molimo, tosengeli kobakisa mposa ya makambo ya Nzambe na kondima na biso mpo ete tokoma bato babongi mpenza na bomoyi na biso ya baklisto. Tanga 2Pet. 1 :3-11 mpe yanola mituna oyo : a. Nguya na Nzambe epesi biso nini ? (vv.3). b. Lokola tozwi elaka monene mpe ya litomba uta na Ye, eloko nini tokoki kokabola kati na yango ? (vv.4). c. Sima ya kotia boboto ná kondima na bino, makambo malamu misusu nini bosengeli kozala na yango ? (vv.5-7). d. Ndenge nini tokoki kokeba noki tozanga nguya mpe kobota mbuma malamu kati na koyeba Nkolo ? (vv.8). e. Eloko nini ezali ya solo mpo na moto azangi makambo nyonso oyo ya malamu ? (vv.9).
Made with FlippingBook - Share PDF online