Bunda etumba elamu ya kondima

116 • Bunda etumba elamu ya kondima

Mondimi nyonso na kati ya Klisto azali na etumba ye na mokili, na nzoto mpe na zabulu. Yango ezali nkanza kati na bato te, to etumba ya nzoto te, kasi ezali nde etumba na nguya ya mokili mabe oyo ezali koluka kokosa, kobuka, mpe kobebisa bandimi na kosalaka mabe, lokuta. Zabulu azali kongoluma pembeni na biso lokola nkosi ya kongala, azali koluka nani akolia (1Pet. 5 :8-9) mpe biso tosengeli kotelema na bokebi ndenge toyebi mayele mabe na ye mpe bisaleli na ye. Bitumba azali kotia na makanisi mpe mitema na biso ezali ntango nyonso bobele mabe. Mpo na kotelemela monguna na mokolo ya etumba, Nzambe apesa bandimi bibundeli na Ye, « Bibundeli nyonso ya Nzambe », mpo biso tosalela na etumba na biso ya molimo. Ebundeli makasi ya monguna ezali lokuta oyo Biblia ebengi ebundeli motomboki kasi yango ekoki kobebisama mpe konyatama na kondima oyo ezali nguba na biso (kondima ezali moko kati na molato ya Nzambe mpo na etumba). Likolo na yango, tozwa solo lokola mokaba, bosembo lokola kasaka ya ebende ya ntolo, Nsango Malamu ya kimia lokola sapato, kobikisama lokola ekoti mpe Molimo lokola mompanga yango Liloba na Nzambe. Kolemba te soki omitie na etumba ya molimo. Lobela bandeko na yo mpasi ozali na yango lokola soda ya Klisto Yesu. Ata soda moko te akoki komipesa lisusu na makambo ya ba sivili. Mposa na ye bobele asepelisa moto oyo atiaki ye na mosala ya soda (2Tim. 2 :3-4). Bitumba ya monguna oyo ezali koyela biso na ndenge ya lokuta, ya kofunda, ya kokweyisama, mpe ya bokeseni ekoki kozala na suka te. Koyekola kobundisa monguna esengi mpe kotelemela ye, kozala na botosi mpe kozala na kondima. Ntango ozali kobatela molato ya Nzambe ya etumba kati na etumba ozali kobundisa lokuta ya monguna, na boye okotelema ngwi kati na elonga.Kanga motema mpe zela se Nkolo. Osengeli koyekola mpe komanyola mateya oyo ya kobakisa elandani na makomi toyekoli : Lolenge ya koyekola Biblia (Monk.ya kob.3) Kososola Biblia ndambo to mobimba (Monk.ya kob. 13) Bokuse ya mwango ya makomi (Monk.ya kob.17) Etando ya mateya ya Boyokani ya Sika (Monk.ya kob.18) Masiya alobi makanisi na ye : Boyokani ya Nsango Malamo (Monk.ya kob.19) Tika Nzambe akumisama ! Ba « Ko » nsambo ya koluka Nkolo mpe kosenga lisungi na ye (Monk.ya kob. 23)

Na mokuse

Minkanda ya kobakisa

Made with FlippingBook - Share PDF online