Bunda etumba elamu ya kondima

Liteya ya mwámbo (8) Bibundeli oyo tosalelaka • 117

Likambo mpenza ya bomoyi na moklisto ezali koya bobele na ntango olamukaka tongo nyonso. Baposa mpe elikya na yo nyonso eyaka noki noki lokola nyama alingi akanga moto. Mpe mosala na yo ya liboso ntongo nyonso ezali kotindika yango sima to kobengana yango ; ntango ozali koyoka mongongo mosusu elobi na yo, ntango ozali kozwa likanisi mosusu, kopesa nzela na lobiko mosusu ya monene, na makasi, mpe kimia ya koleka ete yango nyonso ekotela yo na bolembu mpenza. Mpe tika ete ezala bongo mokolo mobimba. Tokoki kosala yango bobele na bileko ya ebandeli. Nde na bileko wana motindo mosusu ya bomoyi ya sika ekopanzana na mabongisi nyonso tozali na yango, mpo sikoyo topesi Ye posa ya kosala malamo na esika na biso. Ekesani na mokóbo oyo epakolami obele likolo ya etando na mafuta oyo ezali kokota kino na kati ya eloko (lokola elamba to libaya) kino ntango mosusu ebimi na ngambo mosusu.

~ C. S. Lewis. Richard J. Foster and James Bryan Smith, Eds. Devotional Classics : Revised Edition : Selected Readings for Individuals and Groups. Renovare, Inc. (HarperCollins Publishers), New York. 1993. p. 9.

Bibundeli oyo tozali kosalela na etumba ezali ya mosuni te (2 Bakolinti 10 :4).

Mobeko ya ntina

Koyekola makambo tokutanaka na yango

Tanga mpe kanisa makambo mpe makanisi oyo mpe pesa biyano ya polele mpe bososoli ya bozindo na biyano, oyo ewuti na makomi oyo oyekolaki liboso. 1. « Eloko nyonso ekobima na motema na yo ewuti kaka na Nkolo te. Yekola lolenge ya kotala bipayi ewuti ». Mondimi ya sika asengeli ayekola kososola ete makanisi na ye ezali esika bitumba ya molimo ezali kobunda. Monguna azali koluka nzela akota na makanisi na biso mpe akoki kopesa yo maloba ya lokuta. Soki lokuta wana endimami (eyambami), ekoki kobota bamposa, kobebisa emoneli, kotia mbeba, mpe lisusu ekoki komema na bizaleli oyo ekobebisa mpe mimesano. Ata lokola tozali na bibundeli ya bonzambe mpo na kotelemela makanisi ya lokuta (mabe) mpe emoneli oyo tokutani na yango, tosengeli koyekola lolenge nini « koyanola satana na polele », elakisi kosalela Makomi Esanto mpo na kobundisa lokuta songolo oyo monguna abwakeli biso. Tanga lisusu lisolo ya Yesu na satana na Matai 4.1-11. Lolenge nini Nkolo akokaki kotelema ngwi liboso ya komekama ? Ebundeli na Ye

Made with FlippingBook - Share PDF online