Bunda etumba elamu ya kondima

118 • Bunda etumba elamu ya kondima

ezalaki nini ? Lolenge nini azongisaki eyano na maloba ezanga mayele oyo Satana ayebisaki ye ntango azalaki na esobe ? Eloko nini yango eteyi biso lelo na ntina ya etumba na biso ya molimo ? 2. « Nakokoka ata mokolo moko te kobima na nkaka oyo. Ata mokolo te ! » Kati na mokili oyo ya lelo ya mabongisi mbilinga mbilinga, moto nyonso amesani kozua biyano na mposa na ye bobele noki noki mpe sika awa. Moto alingi lisusu likanisi ya kosala mosala ntango molayi mpe kosala misala makasi te liboso ya koyeba oyo alingi to oyo akanisi kozwa. Lolenge ya makanisi oyo ekoki kobebisa mingi mpenza bomoyi ya moklisto. Ata soki elonga, kokangolama, mpe kobatelama esila kopesamela biso na kondima Yesu (1 Bakolinto 15.57 ; Yoane 5.24 ; Baloma 8.35-39 ; Baefeso 1.3), tozali lisusu na bosenga ya koyekola kobunda, mpe lolenge nini kozela elonga. Bil ɛ ngé Baklisto bazali komitika to kopesa nzela na bolembu, mingi mpenza soki babandi malamu mpe bakutani na mikakatano, bamibendi (bazongi sima). Motungisi mpe komekama ekoki kopesa biso mikakatano, kosilisa nguya, to mpe kolembisa molimo. Ata baklisto ya makasi, bakoki na puasa kosutuka mpe kokueya na komekama mpe lokuta ya monguna. Eloko nini mondimi asengeli kosala wana amimoni na kozanga nguya na kokanisa ete akoki kobima na libunga na ye te ? Kosala lisumu mpe kosenga bolimbisi, kosala lisumu lisusu mpe kosenga bolimbisi, mpe mbala na mbala ? Okoloba nini na moklisto moko akémbá te oyo azali kokanisa ete ekozala mpasi mingi mpo na ye kokoka koleka biteni ya lobiko mpe mikakatano ya bomoyi na ye ? 3. « Fungola ya elonga na etumba ezali molende. Likambo ya liboso mpe suka na nyonso ezali ete otika ata moke te ». Tango alobi mpo na kowelana kati na nzoto mpe molimo epayi ya bandimi ya Bagalatia, Paulo alobi na mokuse malako na ye na maloba oyo : Bomikosa te. Basakanaka na Nzambe te ; oyo moto akolona, ezali kaka yango nde akobuka. Oyo akolona na mosuni akobuka na mosuni kobebisama ; kasi oyo akolona mpo na molimo, akobuka na molimo bomoyi ya seko. Tolembaka te na kosala malamu ; mpo ete tokobuka yango na ntango ekoki, soki biso tomitiki te. Na boye, wana tozwi nzela bolamu, mpe mingi koleka tosalela bandeko kati na kondima (Bagalatia 6.7-10). Paulo alobi ete biso tosengeli te kolemba kosala malamu. Na ndenge mosusu alobi, tokoki kotika kosala misala malamu te kino tokokokisa oyo tozali kolanda, na nzela ya molimo. Alakaki bandimi ya Galatia ete bakobuka mbuma lokola lifuti ya mpasi bamonaki soki bakangi motema mpe balembi te. Likambo nyonso na etumba na bango ekoleka malamu kaka soki basaleli oyo bango bayebaki ; elakisi na kotia na misala mateya

Made with FlippingBook - Share PDF online