Bunda etumba elamu ya kondima
Liteya ya mwámbo (8) Bibundeli oyo tosalelaka • 119
ya kondimi oyo Paulo ateyaki bango. Soki esalemi ete baboya kotika, alakaki bango ete bakobuka mbuma ya misala na bango. Na komitala yo moko, makambo nini ezali kotungisa bomoyi na yo koleka, oyo ezali kotinda yo koleka makambo misusu, ete oluka kotika, oluka kopesa nzela, to kokima etumba ? Okoki kosala nini mpo oyeba solo ete « otikali kowumela na etumba » mpe otelemeli komekama ya kotika kondima mpe komipesa na masumu, lokuta mpe komekama ? Ezali boye, na kondima, okangolamaki na bokonzi ya molili, mpe omemami na bokonzi ya Nkolo na biso Yesu Klisto. Na ntina wana, ozali mobundi ya molimo ya nguya, soda ya Klisto, moyinami na mampinga ya banguna ya molóngó ya molili ya lelo ». Ata soki monguna alingi atiela bino motambo mpe abebissa na kosalela lokuta, okoki koyekola, na kondima mpe na kosalela, kososola mpe kolonga ye. Na kosalela tango nyonso okoki koyekola lolenge nini okokesanisa oyo ezali malamu na oyo ezali mabe (Baebele 5.11-14). Kozala na bobangi te. Tango nyonso oyo tokolata bibundeli na Nzambe, toyekola solo ya Makomi Esanto mpe tobikaka na kolandaka litatoli na biso ya Nzambe mpo na biso moko, tokokemba. Zabulu akomeka kotia loyenge mpe kotumbola bino, kasi akokima na ntango oyo bokobanda kobondela. Mingi koleka, ntango bokomeka kozwa mokano ya kosala misala ya ntina (ya litomba), na kosalaka bongo, Zabulu apekisami kokota na bomoyi na bino. ~ Thomas á Kempis. Richard J. Foster and James Bryan Smith, Eds. Devotional Classics : Revised Edition : Selected Readings for Individuals and Groups. Renovare, Inc. (HarperCollins Publishers), New York. 1993. p. 152. kasi oyo ya biso ebundeli mpe mayele ya etumba ezali kondima solo. Mondimi nyonso ya Klisto asengeli alata bibundeli ya Nzambe, kokeba na lokuta oyo ntango nyonso tozali kokutana na yango, mpe kotelemela lokuta yango na kolobaka mpe kosalelaka solo na Klisto. Na likambo nini osengeli okanisa lisusu mpe otiela motema na nzela ya solo, elingi koloba likambo nini Liloba na Nzambe eteyi yo ? Makambo nini ekokani na sôlo na Klisto te ? Kanisa mayele ya etumba Paulo asalelaki mbala mísato na kobika kati na bosolo : Wana ekosalema ndenge nini ? Mpo ete ebundeli ya monguna ya bomesano ezali kondimisa biso mpe kosalisa biso makambo ya lokuta tozali koyoka,
Bokutanisi
Made with FlippingBook - Share PDF online