Bunda etumba elamu ya kondima

120 • Bunda etumba elamu ya kondima

Ezali na lolenge wana te nde boyekolaki Klisto, toloba ete bino boyokaki bazali koloba mpo na Klisto mpe ete boyekolaki yango na bokokani ya solo oyo ezali na Yesu. Bateyaki bino etamboleli (bomoyi) na bino ya kala, mpo ete botika bomoyi wana ya kala oyo ezali mabe na bamposa ya lokuta mpo na kozwa ezaleli ya sika na ekaniseli ya molimo ya sika mpe kolata bomoto na bino ya sika, ezalisami na lolenge ya Nzambe kati na boyengebene mpe bosanto ya solo. Likomi oyo ezali kopesa biso lisosoli ya bozindo na lolenge nini tokoki kobunda etumba malamu ya kondima na nguya nyonso. Liboso mpenza, tolongola bomoto ya kala (ná lokuta mpe bokosi na ye); ya mííbale, tozwa ezaleli ya sika na Molimo ya boyebi na biso (tomilobela solo na eteni oyo) ; ya mísato, tomilatisa bomoto ya sika (oyo ekokani na solo kino tokokoka kozwa bizaleli ya sika na ndenge ya kokanisa, ya koloba mpe kosala makambo ya ntina na motuna oyo). Tokanisa ntango molayi na ntina ya mateya ya Paulo epayi ya Baefese mpe tosalela yango na bomoyi na biso mokolo na mokolo. Na eteni nini ya bomoyi na yo okutanaki na mikakatano mpo na « kolongola bomoto ya kala (ya lokuta mpe ya bokosi) ? » Na eteni wana, makambo nini osengeli « komilongola na yango » ? Lolenge nini okosala mpo « omilatisa bomoto na yo ya sika » ? Osenga na Molimo mayele mpe ngolu, mpe akopesa yo mayele ya sika na etumba na yo mpo na bosolo na kati ya eteni wana. ~ Paulo epayi na Baefeso (Baefeso 4 :20-24)

Nzambe apesá ngai bibundeli mpo nabunda, na boye, nasengeli kokola na makoki na ngai ya soda ya Klisto na kosaléláká mibeko ya Molimo na kati ya lingomba, na kolobaka solo ngai moko mpe koboyaka kondima lokuta.

Kondima

Teresa de Cepeda y Ahumada (1515-1582) azalaki moí-mboka Espagne epayi wapi abandaki kosalela Klisto lokola mamelo ntango azalaki na mbula tuku míbale (20). Azalaki komibulisa makasi mpe azalaki na makoki moko ya ntina ya kokoma na Monkanda na ntina na bomoyi na ye ya molimo. Mosala na ye ya monene mpe lokumu koleka ebengami « Kati ya Ndako monene », wana asololi na ntina ya bokutani na bozindo ná Nzambe. Libondeli ya komibonza, ya Thérèse ya Avila Kamba mpe konza nyonso na mayele na Yo, O Nkolo, mpo ete molimo na ngai ekoka kosalela Yo na kolandaka mokano na Yo, mpe na eponeli na ngai.

Libondeli

Made with FlippingBook - Share PDF online