Bunda etumba elamu ya kondima
Liteya ya mwámbo (8) Bibundeli oyo tosalelaka • 121
Kopesa nga bitumba te, nabondeli Yo, pesa ngai oyo nazali kosenga Yo to oyo nazali na mposa na yango, soki etuki bolingo na Yo, okobika kaka mikolo nyonso kati na nga. Tika ete nakufa kati na ngai mpenza, mpo ete nasalela Yo, Yo oyo, na kati na Yo kaka nde bomoyi ya solo ezali. Amen. ~ Don L. Davis. A Sojourner’s Quest. Wichita, KS : Institut du Ministère Urbaine, 2010, p. 98 Nzambe ya bileko nyonso, Nkolo mpe Mokonzi, matondi mingi mpo na ngolu ya kokamwa mingi oyo opesi biso molato mobimba ya bibundeli oyo ekoki kobatela biso mpe epesa makoki ntango tozali kobundisa banguna na biso kati na mokili oyo. Otiki biso na bosenga te na etumba monene oyo mpo tokonzama na bokonzi na Yo. Tozali na Molimo Mosanto na Yo, na bolimbisi na nzela ya makila na Yesu Klisto, molato ya komonisa pole mpe ya koluka solo ya Makomi Esanto, Liloba na Yo. Tokotisami na libota na Yo, tozwi bilaka kitoko koleka, elikya ya bozwi bomoyi ya seko, mpe toyambi likabo ya Molimo na Yo. Sunga biso sikoyo, Tata malamu, ete tokoka kosalela makabo kitoko oyo mpo toyamba bilaka na Yo ya bomoyi ya seko, tokima lokuta nyonso wana tozali kotambola na bosolo na Yo. Pesa biso nguya ya kotalisa Yo na nkembo nyonso na ntango tozali komilatisa na molato mobimba ya bibundeli ya Nzambe mpe koyekola ete totika te kasi totelema ngbi na mikolo mabe. Nabondeli Yo boye na Nkombo ya Yesu. Amen. Na www.tumi.org/sacredroots, tojali na eteni ebongisami mpo na mikanda ebakisami mpe bisaleli ya kotala na miso. William J. Backus. Telling Yourself the Truth / Dis à toi-même la vérité. Grand Rapids, MI: Bethany House Publishers, 2000. Na bokutani ekoya, tokomona Bokasi oyo totalisaka bakisa mpe na mitu ya mateya oyo : 1. Tosengeli kotikala na bokebi mpenza mpe tosutuka te. 2. Molimo Mosanto azali kosunga biso na etumba na nzela ya libondeli. 3. Tosungaka bandimi misusu na etumba na bango.
Kokîmela to kolela na motema epayi na Nkolo
Mateya ya kokoba
Mpo na Liyangani oyo ezali koya
Makomi ya kobomba na mutu
2 Bakolinti 10 :4
Mosala ya kokokisa na ndako
1. Monguna akosaka biso, kasi tosengeli kotatola kaka bosôlo. Koma molongo ya makambo ya lokuta nyonso oyo monguna ayebisa yo na mokanda obombaka makambo ya mokolo na mokolo (to julunalo na
Made with FlippingBook - Share PDF online