Bunda etumba elamu ya kondima
122 • Bunda etumba elamu ya kondima
yo) ; lokuta na ntina ya lobiko na yo, lokuta na ntina ya Nzambe, lokuta na ntina ya oyo etali yo mpe lokuta na ntina ya oyo etali basusu. Koma mpo na nini lokuta oyo ezali solo te. Luka ozwa Makomi Esanto oyo epesi kokesana ya nkuta yango, komonisa bosolo ya Maloba na Nzambe na ntina ya biteni oyo ya bomoyi. 2. Ndenge mosusu ya kosala mpo na kobunda etumba malamu ya kondima ezali na komipesa mpo na koyambola mpe kotatola Nkolo. Zwa miniti 10 ya libondeli, senga Nzambe alakisa yo mua banzela ya masumu kati na yo oyo esengeli na yo otubela epayi na Nzambe. Sima ya kosenga, vanda kimia mpe yoka. Soki amonisi yo mua masumu na molimo na yo, na bolembu, ndima oyo Nzambe alobeli yo mpe koluka omimonisa malamu te. Na bongo yamba mawa mpe boboto na Ye mpe bolimbisi oyo apesi yo na nzela ya makila na Yesu. 3. Luka moklisto moko oyo alenda mpe tuna ye ngolu oyo amona na kati ya kotubela masumu mpe kozua bolimbisi. Tubela epayi na ye masumu na yo mpe senga maloba mpe mabondeli ya bolimbisi mpe kobikisama epayi na ndeko mobali to ndeko mwasi kati na Klisto.
Made with FlippingBook - Share PDF online