Bunda etumba elamu ya kondima

L iteya ya líbwa (9) B okasi oyo totalisaka Koyika mpiko lokola basantu

Bóbóndelaka ntango nyonso kati na Molimo. Bosambele mpe bobondela lolenge nyonso. Mpe mpo na yango bolongwa na mpongi ná koyika mpiko mpe bosambelaka mpo na babulami nyonso.

~ Makomi ya Paulo epayi ya Baefese (Eph. 6 :18)

Mposa ya kokokisa nsima ya liteya

Na suka ya liyangani oyo esengeli bokokutana na Bokasi oyo totalisaka ntango tondimi ete : • Mobeko ya ntina mpo na kokola na kati ya Klisto ezali koyekola koyika mpiko, kozala na bokebi, mpe kosutuka te ete okangami ; tosengeli tokende liboso kino tozwa mbano, ata ko mikakatano ebimeli biso. • Molimo Mosanto azali kopesa biso nguya ya kotelema ngbi na kati na solo na mbela na biso mpe na komibulisa na biso na etumba mpo na koyika mpiko na nzela ya mabondeli. • Wana totelemi na bosembo epayi na Klisto mpe totalisi mbela na biso na bondimi nyonso, tokoki mpe kolendisa bandimi misusu na etumba na bango. Nzambe ya bileko nyonso, olobi na Liloba na Yo ete Yo ozali liziba ya mayele mpe bwanya nyonso. Nandimi ete yango ezali ya solo, Tata Nzambe, mpe nasengi ete opesa ngai bwanya na Yo mpo nakoka kokabola Liloba ya solo (2Tim2 :15). Nabondeli Yo, teya ngai mpe lakisa ngai nzela nakoki kolanda (Nzem.32 :8), mpe monisa makolo na ngai nzela ya kotambola. Sembola matoyi na ngai mpo ete nayoka mongongo na Yo, mpe Sembola ngai na lolenge na ngai ya kobanza mpe ya koloba ntango nabungi nzela. Tata, pesa ngai likabo ya kokesanisa makambo, mpe pesa ngai makoki ya kokesanisa mateya ya Yo ná oyo ewuti na binzambe-nzambe to banzambe ya lokuta, milimo mpe makabo ya lokuta. Monisa ngai mposa na Yo na nzela ya Molimo Mosanto mpe pesa ngai bososoli ya bozindo ete nakoka kosalela miango na Yo na motema na ngai mobimba. Nkolo na bolingo, nabondeli Yo, sunga ngai nayokamela mpe nayoka noki kasi nawelisa koloba noki to kosilika noki te (Yak.1 :19). Tika ete maloba ya monoko na ngai mpe makanisi ya motema na ngai endimama liboso na Yo.

Libondeli ya kofungola mpo na kosenga bwanya

123

Made with FlippingBook - Share PDF online