Bunda etumba elamu ya kondima

124 • Bunda etumba elamu ya kondima

Sunga ngai naloba solo na Yo na bwanya nyonso mpo ete soki nakoloba na nani asosola mpe azwa litomba na solo na Yo. Teya ngai sikoyo lokola nazali koyekola Liloba na Yo mpe mitindo na Yo. Nasengi nyonso wana na nkombo ya Yesu, Nkolo mpe Mobikisi na ngai. Amen. 1. « Mpo na nini baklisto mingi, kutu ná babateli mpate bazali kopengwa na bondimi na bango » ? Lel’oyo, bato mingi bazali kobelela ete bayebi Yesu ata ko bazali kotika kondima na bango, koboya losambo, mpe kosundola mbela na bango ya Molimo na kati na Klisto. Wana ezali solo ; ezali bobele mpo na bato ya molongo, baye bafandaka na bifandelo ya losambo na se kaka te, kasi na bateyi mpenza baye batelemaka na etumbelo liboso ya bato nyonso. Tanga motango ya mangomba ekangami mpe bateyi boni bafandi mpe basundoli Liloba na Klisto. Mingi bazali komeka kolimbola ndakisa wana mpe basusu bazali koluka basukisa momesano wana na kokomisaka bondimi na Klisto na nzela ya « kosepelisa ». Okanisi boni mpo na ntango lokola oyo ? Bato mingi basundoli mangomba mpenza ya molongo mpe basusu kutu bazali koloba ete balingi nâ kondimela Klisto te. 2. « Ezali mpasi, mpe motema na ngai elembi, Nakanisaki kutu napengwa mpe nazongela bomoyi na ngai ya kala ! » Bandimi mingi ya sika bazali na ntango ya kita-mata oyo ezali kati-kati ya ntango ya kokende likolo na komibulisa na bango mpe na bolingo ya Klisto mpe na ntango ya kokita oyo ezali ya komekama mingi mpe makambo bazali kondima ebalukaka. Elembisaka soki moklisto ya sika to oyo akembi nanu te azali koningana mbala ebele na kondima na ye mpe átélemaka mbala nyonso azali kokweya mpo ákende liboso. Na eyano na eleko wana ya kita-mata, Makomi elobi boye : « Mpo ete moyengebeni akokweya mbala sambo nde akotelema lisusu ; kasi bato mabe bakokweyisama na mawa libela ». Bomoyi ya moklisto ezali na motuya mingi mpenza koleka, kasi ezali mpasi. Mpo na nini ezalaka na ntina mpo na moklisto oyo nanu akembi te ete azala na mpiko na ntango azali kokoba mobembo na ye epayi ná Nzambe ? 3. « Tozali koyekola botosi na lolenge Yesu asáláká (ezala bampasi tozali komona) ». Moko na mateya oyo eleki makasi mpo na mondimi ya sika ezali ete bomoyi ya moklisto esálémá te mpo moklisto alongwa na bomoyi ya bitumba, ya makama, mpe ya makambo. Tokoki komona ete basálélá biso linkita soki toyoki oyo moyembi na nzembo na Nzambe ayembaki na monkanda ya Nzembo, alobi : « Moyengebene azali na makambo mingi na mpasi nde Nzambe akobikisa ye kati na yango nyonso » Soki tozalaki bato ya bosembo, tokokaki ata moke te kolinga kobunda mpe kolinga ata te lolenge nyonso ya mpasi mpe ya

Bokutani

Made with FlippingBook - Share PDF online