Bunda etumba elamu ya kondima

Liteya ya líbwa (9) Bokasi oyo totalisaka • 125

komekama ! Basusu kati na biso bazali koyoka mpasi, to kokanisa ete babubi (bakosi) bango ntango biso lokola bana balingami na Nzambe tozali komiyokisa mpasi na mutu na mababe to mpasi ya ebele. Soki ozali moklisto ya sika okomona ete ezali mpasi mingi kokanga motema na ntango ya mikakatano. Nzoka nde Makomi eyebisi biso ete wana nde lolenge moklisto ayekolaki mateya na ye : Baeb. 5 :7-8 : Na mikolo na bomoyi na Ye kati na mosuni, Yesu atombolaki mongongo na Ye na mabondeli mpe malombo mpe na mpisoli epayi na Ye oyo ayebi kobikisa Ye na kufa mpe yango eyokamaki mpe endimamaki .Ata azalaki mwana, ayekolaki kotosa na nzela ya koyoka mpasi ». Lolenge nini ndakisa ya Klisto ekoki kopesa biso elikya ntango tozali koyekola koyika mpiko na biso moko na kimia ntango tozali na mobembo na biso ya kondima ?. Na liyangani eleki (Bibundeli oyo tosalelaka) oyekolaki bibundeli ya etumba na biso. Na liyangani oyo, okomona elendiseli mpo na kokolisa koyika mpiko mpe bokasi na etumba malamu ya kondima. Mpo na koyika mpiko na eloko songolo, tokoki kokima yango te. Tosengeli nde kozwela yango mokano ya makambo oyo tondimeli mpe toyebi. Tokoki kosundola yango to kobuakisa nzela na yango te. Ata eleki makasi, mpasi to kolembisa, biso tokozwa bobele mokano ya kokoba, ya kokende bobele liboso, ya kozala na elikya na bilaka na Nzambe mpe kozela lisungi na Ye mpe bokasi na Ye. Koyika mpiko ezali lolenge mosusu ya kozala mutu makasi ya bosanto, koboya kopesa nzela na komekama, to komeka kolembisa biso mingi mpenza kino tokobongwana na kondima na biso. Koyika mpiko elobi boye : « Ata ndenge nini, nakoki ata moke te kosundola komipesa na ngai epayi na Nkolo ». Na nzela ya elendiseli ya bandimi misusu, libondeli na kati ya Molimo Mosanto mpe na kondima na bilaka na Nzambe, tokoki kosala makasi kino tókóma na suka kati na Klisto. Tosengeli tobatela komipesa na biso na Nsango Malamu mpe bokonzi ya Nkolo na biso Yesu Klisto oyo asekwaki bobele soki tozali koyika mpiko. Tokolonga kaka soki tosundoli te. Koyika mpiko na etumba malamu ya kondima ekoki komonisama na ndakisa lokola soda, mopoti mbango mpe moloni bilanga (2Tim 2 :1-8). Soda asengeli koyekola koyika mpiko na makambo ya mpasi, mingi akoki kozanga te alemba to akoma na makama ya ngonga molayi. Mopoti mbango azali koyekola na ntango ya makama mpe bilanga kokesana (ya mbula, ya malili, ya milunge, ya mimpepe…) na komitindika ata alembi to amiyokisi mpasi. Moloni bilanga nde azali kokanga motema kino akoma na ntango ya kobuka ata ko akoki lolenge ya ngonga ya bilanga te to abenda nkona ekoma na eleko ya kobuka noki noki te.

Makambo ezali kati na liteya

Made with FlippingBook - Share PDF online