Bunda etumba elamu ya kondima
126 • Bunda etumba elamu ya kondima
Lolenge moko na ndakisa wana, tosengeli toyika mpiko. Tosengeli tomil ɛ ng ɛ la na komekaka makambo mpe kokweya, mpe na komekaka lisusu, wana toyebi ete etumba ezali ya Nkolo. Tosengeli tolona nkona, tokanga motema mpe toyekola kotalela Nkolo. Soki tosali bongo, Nkolo akomema mbuma na ntango ya kobuka oyo ebongi. Libondeli ezali liboso radio ya ntango ya etumba oyo tolobaka mpe toyokaka na etinda na biso na lingomba ntango ezali kokende liboso kobundisa nguya ya molili mpe bozangi ya kondima. Ekoki kokamwisa te ete radio wana ekosala mabe ntango bakomisi yango radio oyo esalaka na ndako mpo na koloba na bato oyo bazali na biteni kokesana ya ndako moko to mpo na bisengo na ndako ya nyama ya djale. Nzambe apesa biso Libondeli mpo ete tobenga na ndako monene esika bakonzi minene bafandi ntango etumba ebimeli biso. Biso tokobelela ntango nyonso tosengeli na bokonzi ya Klisto ete ekende liboso na mokili. Bokasi oyo totalisaka Liteya ya líbwa (9) Boyekoli Biblia Tanga makomi oyo elandi mpe yanola na mokuse mituna ekokani na likambo moko moko ya Biblia. 1. Mikakatano mpe banguna bazali koluka kopekisa bandimi ete bakola mpe babota mbuma mpo na Klisto. Tanga Matai 13 :1-9 mpe 13 :18 23. Koma makambo míneyi (4) oyo elakisi esika milona ekweyaki mpe sangisa yango na makambo makokani : a. Nkona oyo ekweyaki kati na nzela __ ekolaki, ezikaki mpe ekawuki. b. Nkona ekweyaki na mabanga __ ekangamaki na nzube. c. Nkona ekweyaki na kati ya nzube __ bandeke baliaki yango. d. Nkona oyo ekweyaki na mabele __ ebotaki mbuma mingi, ~ John Piper. Que les nations se réjouissent. Grand Rapids, MI : Baker Academic, 2010, p. 65.
ntuku misato (30), mosusu ntuku motoba (60), mosusu nkama(100).
Made with FlippingBook - Share PDF online