Bunda etumba elamu ya kondima
Liteya ya líbwa (9) Bokasi oyo totalisaka • 127
2. Mpo ete tozingami na ebele ya batatoli, tobwaka mokumba mpe lisumu na biso oyo ekanga biso na bolembu mpe topota na molende liboso ya komekama ekoyela biso. Tanga Baeb.12 :1-11. Tondisa bisika etikali polele : a. Topota mbango ná ____________________ lisumu oyo ekangama na biso (vv. 1). b. Ezali na nzela ya etumbo nde tozali kondima mpasi ; kasi soki bozwi etumbu ezali mpo Nzambe akamati bino lokola ______________ (vv.7). c. Etumbo nyonso emonanaka liboso mpenza lokola likambo ya mawa mpe kozanga esengo, kasi na nsima ezali kopesa ___________________ epayi na baye bazwaki yango (vv.11). 3. Tokoki koyekola kozala na molende ntango tozali kokanisa bosembo ya bandimi baye bamonaka mpasi kati na minyoko. a. Tanga 1Bakolinti 10 :1-13. Ndakisa ya bandimi na kati ya makomi ekoki kolakisa biso kozala molende na kondima lolenge nini ? b. Tanga Yobo.23 :8-14. Eloko nini tokoki kosimba na bomoyi ya Yobo mpe ezaleli na ye ntango ya komekama mpe mikakatano ? 4. Libondeli ezali nkisi ewuti na Nzambe mpe mabongisi epesamá na moklisto nyonso oyo azali na mpasi, na etumba to na ntango ya mikakatano. Sangisa milongo oyo na ndimbola na yango ya malamu. a. Luka18 :1-8 __ Senga, luka, beta ekuke na libondeli, Nzambe akoyanola b. 1Tes.5 :17; __ Osengeli koyika mpiko, kosala mokano na Baloma 12:12 ; Nzambe, ozali na elaka. c. Luka 11 :5-13 __ Bondela na bokasi; kolemba te. d. Baeb.10 :36-38 __ Tosengeli kobondela ntango nyonso, mpe kolemba te. e. Baef. 6 :18 __ Bondela ntango nyonso ngonga epesameli yo ya kolata bibundeli nyonso ya etumba
Made with FlippingBook - Share PDF online