Bunda etumba elamu ya kondima

Liteya ya líbwa (9) Bokasi oyo totalisaka • 129

c. Welela lokola mopoti mbango _____________ azali na likabo ya liboso ya mbuma. d. Moloni bilanga ya makasi ______________ lokola soda malamu ya Klisto. e. Kanisa Yesu Klisto ________________ Mwana na libota ya Davidi. 9. Tokoki koyoka mabe te ntango tozali koyika mpiko na mimekano, kasi tomona yango lokola likambo ya esengo, koyebaka ete Nzambe akosalela yango mpo na kolendisa biso ; akopesa mayele ya kolonga bitumba nyonso tokokutana na yango. Tanga Jaki 1 :2-8 mpe yanola mituna oyo : a. Nini tokoki kosala soki tokutani na komekama ya ndenge kokesana ? (vv.2). b. Nini ekokomela biso soki mpiko na biso eboti mbuma nyonso ? (vv. 4) c. Liteya nini Nzambe akopesa tosala ntango tozangi mayele ya kobunda etumba to ntango tozali na komekama ? (vv.5-8) Lokola babundi na etumba malamu ya kondima, tobengami koyika mpiko mpe tozala na bokasi kino na suka. Kozala na bokasi ezali koyika mpiko na likambo songolo kino na suka, kokangela yango motema, kasi kobombanela yango to kokima yango te. Lokola baklisto baye bazali kosalela Klisto na mokili oyo ya nkanza, tozali kokutana na komekama ntango nyonso na mokili oyo na mabongisi na yango, kobulunganisa biso na makanisi na kati na ezaleli na biso ya masumu, mpe kokosa biso na lokuta ya monguna zabulu. Tozali koyoka mutu mpasi, kokutana na mimekano, bato bazali kokanisela biso mabe. Kati na komekama wana nyonso tokoki komona yango lokola esengo ete tokangela yango motema, wana eyebi biso ete Nkolo azali kosalela komekama mpo na kolakisa biso lolenge ya kotalela Ye mpe ya kozela bilaka na Ye. Kozala na bokasi elingi koloba kozala matoyi mangbongi to mutu makasi na kati ya kondima, kasi kozala na bosanto mpe kotia motema na Klisto. Tozali ntango nyonso na bososoli makasi te na ntina ya mikakatano na biso, ata bongo tozali kotia motema na ndenge nyonso bobele na Nzambe. Tosengeli koboya kopesa nzela na eloko nyonso oyo tokutani na yango ete yango elembisa biso mitema to eyokisa biso mpasi kino tobalukela Nkolo. Koyika mpiko ezali kotia motema na nguya na Nzambe mpe kotikala bobele na bondimi mpe kobatela elaka ya komibulisa epayi na Nkolo. Ntango tolongi komekama, tokoki kotia motema ete Nkolo akopesa oyo tosengeli na yango, na nzela ya bandimi misusu, na nzela ya mabondeli elongo na Molimo

Na mokuse

Made with FlippingBook - Share PDF online