Bunda etumba elamu ya kondima
130 • Bunda etumba elamu ya kondima
Mosanto, mpe na nzela ya kolendisama na Makomi na Nzambe. Ntango osilisi eteni to eleko wana, yebaka ete ezali bobele ebandeli. Okoki kolemba sikoyo te, kala mingi te okomesana. Telema ngwi, mpe tika Nkolo akokisa bamposa na yo. Mateya ya kobakisa oyo bosengeli koyekola mpe kobanza mpe ekokani na liteya oyo yango oyo : Ngomba (Monk.ya kob. 15) Kobonga na kotelema na esika : Kokolisa motango ya bayekoli na Bokonzi na Nzambe (Monk..ya kob. 20) Efandeli ya Boyokani ya Sika : Kobika na lolenge ya bokeseni na Bokonzi na Nzambe (Mobeko ya bokeseni) (Monk.ya kob. 21) Tika Nzambe akumisama ! Ba « Ko » sambo ya koluka Nkolo mpe ya kolomba ye lisungi (Monk.ya kob. 23) Oyo tokuti sikoyo, na mposa nyonso, ezali ete kaka mibeko yango bato ya nzebi (siansi), ya masano, mpe balanga nzembo bazali kosalela, yango mpe esalemi ndenge moko na esaleli ya bandimi mpe na esaleli ya losambo. Kala ezalaki bomesano mosusu ya sika ya kosengaka bonsomi na makambo motindo wana, kolukaluka yango ná lolendo epayi ya baye bakangamaki na mibeko, kasi lolendo wana esila koleka. Tokoki kolinga te longola bobele soki baye bazali na mibeko bamona ete bazali na nguya koleka… Tobandi komona na esengo nyonso solo oyo elobi ete moklisto azali moto oyo akangami, azali komemaka mokumba ya Yesu Masiya mpe azali moto aboyi bonsomi ya pepele, bomoyi ya moklisto ya pete. Tomoni ndimbola mosusu na koteya ya baklisto ete nzela oyo ezali komema na libebi ezali monene, kasi oyo ememi na lobiko ezali moke mpenza na kati na yango. Moklisto oyo toyebi sika azali oyo asalaka makambo lokola ezali ye moko kolinga to lokola esepelisi ye te, kasi esepelisi Nkolo.
Minkanda ya kobakisa
~ Elton Trueblood. Le joug du Christ. Waco, TX : Word Books Publisher, 1958, pp. 130-131.
Zala sembo kino okokufa mpe nakopesa yo motole ya bomoyi (Emon.2 :10)
Mobeko ya ntina
Koyekola makambo tokutanaka na yango
Tanga mpe kanisa makambo mpe makanisi oyo mpe yanola ná bozindo nyonso ndenge ya kosilisa mikakatano yango na kolandaka makomi toyekolaki.
Made with FlippingBook - Share PDF online