Bunda etumba elamu ya kondima

Liteya ya líbwa (9) Bokasi oyo totalisaka • 131

1. « Nazali komona nde lokola nazali na lisano ya kita mata, nazali komata, nazali kokita, namati nakiti ». Elenge moko awuti kondimela Nkolo sikoyo eleki kaka mwa bansanza, amonisaki bobangi na ye na mpasi amoni. Abandaki kobikela makambo ya bonkoko na ye na mboka mpe yango esalaki ye mutu mpasi, na mosala bato basosolaki ye mabe, mpe nkaka ya komekama esalaki ye na lolenge akútana na yango nanu te. Eleko wana ya mikakatano ebandaki kolembisa soda ya Klisto wana mpe abandaki komituna soki andimelaki mpenza Klisto « na lolenge ya malamu ». Mpo azalaki kokutana makambo ebele, sikoyo amituni : « Sikoyo namoni lokola nazali na lisano ya kita-mata, nazali komata, kokita, komata kokita. Natelemi malamu ngbi mpenza te. Yango nasali likambo ya mabe to boni ? Ebele ya bandimi nayebi bazali kokutana na ebele ya mikakatano lokola ngai sikoyo te ». Na lisungi ya milongo ya makomi oyekolaki, liteya nini okoki kopesa na elenge moklisto ya sika oyo na makambo azali kokutana na yango mpe nini akoki kosala ? 2. « Namoni mpenza lolenge nakoki kosala te soki basali na Nzambe bazali te. Bango bamonisi bokeseni ». Ndeko moko na kati na Nkolo ayaki na esengo epayi ya Klisto tango azalaki na boloko, mpe mbala moko abimaki na boloko, ntango kaka awuti kobima, amibulisaki na lingomba na esika azali. Alekisaki ngonga mingi na bandimi ya lingomba na ndenge akokaki. Azalaki kokende losambo mpe koyekola monkanda na Nzambe, mpe akomaki mondimi akangamaki na bandeko misusu malamu na kati ya losambo. Amibulisaki kosala misala ya lingomba na motema moko na lolenge mosusu basalaki te, mpe alukaki balakisi mpo asolola na bango makambo azalaki kokutana na yango na bomoyi na ye mpenza mpo bateya ye. Ekomaki bambula ebele awumelaki na lingomba wana mpe yango ekomaki mboka na ye, mboka na ye koleka mboka ya kobotama mosika, mpe emonisaki ndenge Nzambe azalaki kosalela balakisi mpe baklisto ya lingomba kino bamonisaki lolenge Nzambe alingaki mpo na bomoyi ya ndeko wana, mpe alobi : « Nazali komona te ndenge nakoki kobika soki basali na Nzambe bazali te bango na bandimi misusu ! Bamonisi bokeseni mpenza. Lisungi na bango, bolingo, mateya ezali ntina mpenza nazali kosalela Nkolo lelo ». Lolenge nini ndakisa wana ekoki kosunga biso tososola mosala ya bandimi misusu kati ya boyiki mpiko na biso na kondima ? 3. « Mbongwana ekokota ntango nini ? Nabandá kobunda na komekama oyo uta kala. Ndeko, namoni lokola esengi kozela kino ngonga molayi mpenza ». Ntango mosusu lobiko ya moklisto ezali esengo, na mateya ya sika mpe kolonga mingi, lelo alongi, lobi mpe alongi, lokola kosutuka ya bisengo na bisengo. Na bangonga misusu ekoki kobongwana mpe ekomi pasi, etondi na komekama mpe makambo ebele oyo ezali kowumela ntango molayi, ata elikya ya kozwa kimia emonana te. Bandimi bakoki kobeba motema mpe balembi,

Made with FlippingBook - Share PDF online