Bunda etumba elamu ya kondima
132 • Bunda etumba elamu ya kondima
soki baleki komona bampasi, lokola bokono ya kowumela, kokufela molingami to komona mpasi na kokweyisama mosusu na efandeli. Moko na mateya oyo eleki motuya mpo baklisto bakémbá ezali koyekola kotia elikya na Nzambe na ntango ya bitumba makasi. Tosengeli na ngolu na Nzambe mpo elongisa biso na komekama, mpo tokoka koyika mpiko na komekama. Yango wana koyekola bomoyi na kati ya Klisto ezali na ntina mingi. Ata tomoni ndenge nini, to lolenge nini makambo ezali kotambola, tondimi koyika mpiko na mabondeli, kozala na bondeko biso na bandimi ya Klisto na lingomba oyo tozali kotia elikya na Liloba na Nzambe, mpe kotambola elongo na Nkolo. Mpo na nini tokoki kopesa nzela te ete makambo oyo tozali kokutana na yango ezwa liloba ya suka na koyika mpiko na biso na kati ya komekama ? Mpo na nini soki topesi nzela na lolenge toyokaka (nkanda, bisengo, kobanga…) mpe lolenge tomitambwisaka na makambo oyo ebimelaka biso (ya mpasi, ya mawa to mpe ya esengo) ekoki kotia biso na likama soki yango etindi biso tolanda toli na yango na bomoyi na biso kati na Klisto, ezala ntango tozali koyekola lolenge ya kimoklisto to na kobika na biso na bandeko misusu ? Ya solo mpenza, mobeko ya motuya mpo na kokola na kati ya Klisto ezali koyekola ndenge ya kozala na bokasi , na bokebi, mpe kosutuka te ntango okangami na motambo.Tosengeli kosala makasi mpe tokende bobele liboso kino tozwa mbano ata ezali mpasi. Kasi tozali kosala yango biso moko te. Tozali na bipayi oyo ezali kopesa biso makasi ya kozala bobele na solo na mbela na biso ntango tozali koyika mpiko na etumba malamu tozali kobunda. Molimo azali kolendisa biso, azali ntango nyonso na kati na biso mpe azali kopesa biso nguya na ntango tosengeli na yango. Moklisto nyonso oyo akembi nanu te asengeli koyika kaka mpiko na ntango makambo ekómélí ye, epesaka mutu mpasi, na ntango ya bitumba, komekama na kati na ye moko to libanda na ye, kasi osengeli koyekola koyika mpiko. Tala malamu ngonga na yo ya mabondeli, ya kotanga Liloba na Nzambe, mpe ya komikotisa na misala ya lingomba. Molimo Mosanto alingi osala makambo nini mpo na kolendisa yo ete oyika mpiko na nyonso ezali kobimela yo ? Pona likambo moko to mibale, bulisa yango epayi na Nkolo mpe banda lelo, na nguya ya Nkolo, yika mpiko na komekama. Yeba ete ozali yo moko te to osundolami te ; bayekoli nyonso bazali bobele koyekola koyika mpiko (2Tim :312), mpe Nkolo akotika yo to akosundola yo ata moke te (Nzem.27 :1-3). Na nzela ya Nkolo mpe nguya na Ye, okoki koyika mpiko na komekama mpe kokumisa Klisto na makambo nyonso.
Bokutanisi
Made with FlippingBook - Share PDF online