Bunda etumba elamu ya kondima
Liteya ya líbwa (9) Bokasi oyo totalisaka • 133
Ezaleli ya bato mingi ya nkanda mpe yikiyiki na mitu na bango ezali Koyikitana ya mposa ya komitala bobele yo moko na kati ya bomoyi. Ezali bomesano oyo ewúmélá bambula ebele. Nalobi mpo na balangwi masanga te to bato batambwisaka bomoyi na lolenge esepelisi bango, kasi mpo na baklisto oyo totosaka mpe bakoma na somo ya komela masanga makasi mpe bamipesa na kindumba. Bakoma na matoyi mangbongi, mpe bozangi botosi na bango eyébáná na ntango ya komekama mpe ya bitumba. Motindo ya lobiko wana ya kokima mikakatano, ya koluka lobiko ezanga mikakatano, ya kokima ntango efandeli ekomi makasi, esukaka bobele moto ákóma eléla, kizengi mpe azanga makoki ya bomoto. Okoki kotanga babuku ebele, okoki kokende epayi ya banganga mayele, bapasitele, mínganga, to kobondela na ndenge nyonso to komipesa na losambo, okoki kosomba bakisi ya ntalo, bakoki kobeta yo bafimbo; kasi nyonso wana ekomonisa mama na likambo te : ezali bobele kozala na botosi. Kotika kosala makambo bobele lolenge yo moko osepeli mpo oyokaka bato misusu te. Mpo na kobika, nkisi moko ya solo ezali : “zalá na botósi” Ezala bokeseni to botomboki nazali kokutana na yango, nasili kozwa nguya na kati ya Molimo Mosanto mpo nakozwa bokebi ntango nyonso, nakokanga motema kino na suka, mpe nakosunga bandimi misusu basala ndenge moko na ngai. John Wesley (1703-1791), azalaki moko na bana 19 babotamaki na Samuel mpe Suzana Wisley (oyo azalaki elombe mwasi na kondima). Ntango azalaki nanu elenge na collège, ye na baninga na ye basanganaki mpo na komilendisa na na bomoyi ya bosanto, mpe basusu babengaki bango ba « Méthodistes » mpo na makambo bazalaki koyekola na molongo. Lokola azalaki moteyi makasi, alemba te, mpe mobongisi ya makambo, atiaki bokebi na ye na bonkoko na kati ya mboka Angleterre, bato bayebi nsango ya bomoyi ya bato (to ba historiens) bazali kokumisa ye mingi lokola abikisaki mboka na botomboki oyo esopaki makila ya bato. Nguya na ye ewumeli kino nsima ya liwa na ye, epayi wapi bateyi ya méthodistes bazalaki kotambola-tambola na ndelo ya bato ya Amerika na Nsango Malamu. ~ Richard Shelly Taylor. The Disciplined Life: Studies in the Fine Art of Christian Discipleship. Kansas City, MO: Beacon Hill Press, 1962, pp. i-ii.
Kondima
Libondela
Made with FlippingBook - Share PDF online