Bunda etumba elamu ya kondima

134 • Bunda etumba elamu ya kondima

Libondeli ya Wisley mpo na boyokani

Nazali lisusu mpo na ngai moko te, kasi mpo na Yo. Sala na ngai oyo olingi, tia ngai na molongo ya baye olingi. Tika nasala, tika namona mpasi.

Salisa ngai misala na Yo to bulisa ngai pene na Yo, Nátombolama mpo na Yo to nakitisama mpo na Yo. Tika natonda, tika nazala polele. Tika nazwa nyonso, tika nazala na eloko te. Natikeli Yo nyonso mpamba mpe na motema moko na ntango osengeli na yango. Bongo sikoyo, o Nzambe na nkembo mpe Nzambe mosanto, Tata, Mwana mpe Molimo Mosanto, ozali ya ngai mpe nazali wa Yo. ozali ya ngai mpe nazali wa Yo. Tika ezala se bongo. Mpe boyokani oyo nasali na mokili, Tika ete endimama na lola. Amen. ~ traduction des paroles anglaises trouvées dans le livre du Bureau Britannique de l’Eglise Méthodiste en 1936. Nzambe ya bileko nyonso, Tata ya Nkolo Yesu Klisto, nandimeli Yo lokola Nzambe na ngai mpe Mobikisi na ngai. Yo opesaki ngai bomoyi ya seko na nkombo na Ye mpe sikoyo nalingi nabika bomoyi ya Klisto lokola Ye abikelaki, nawumela na kondima mpe solo epayi na Yo, na Nsango Malamo mpe mitindo na Yo. Pesaka ngai ngolu mpe lisungi oyo epesamaka bobele na Molimo na Yo, ete na nzela ya Liloba na Yo, na nzela ya libondeli, na nzela ya bondeko na bayekoli misusu na losambo mpe Elambo na Nkolo, mpe na kokangama na Yo nakoka kobika na lobiko etondi na bomoyi opesaki ngai. Sunga ngai nasundola kobondela mpe kotia motema na nguya na Yo te, mpe kolanda mokano na Yo na motema na ngai mobimba, mpo ete Yo ókumisama, mpe bokonzi na Yo eya epayi nazali kobika mpe kosala. Nalingi Yo Tata. Sunga ngai nazala na makasi. Na Nkombo na Yesu, nabondeli bongo. Amen. Na www.tumi.org/sacredroots, tozali na eteni oyo ebongisami mpo na bisaleli tobakisi oyo ekomami mpe ya komona na miso. Don L. Davis. A Compelling Testimony. Wichita, KS : l’Institut du Ministère Urbain, 2012. (Cette documentation est disponible à www.tumistore.org.)

Kokîmela to kolela na motema epayi na Nkolo

Mateya ya kokoba

Made with FlippingBook - Share PDF online