Bunda etumba elamu ya kondima
Liteya ya líbwa (9) Bokasi oyo totalisaka • 135
Makomi ya kobomba na mutu
1Timote 6 :12
Mosala ya kokokisa na ndako
1. Tia bitumba nyonso na molongo, komekama mpe mikakatano ozali kokutana na yango sikoyo, mpe bulisa yango epayi na Nzambe. Senga mayele ya koyanola yango moko moko epayi na Nkolo, mpe luka liteya epayi ya pasitele to bateyi oyo bakemba mpo okoka kokumisa Nzambe tango nyonso. 2. Motindo ya kokola na makoki ya kobunda etumba malamu ya kondima ezali ya kozala yo moko. Tosengeli koyekola lolenge ya koyokamela Nzambe na kofandaka kimia. Zala kimia miniti mitano mpe zela eyano ya Nkolo. Kotanga te, koloba te, yokamela kaka. 3. Tuna moninga moklisto asangana na yo na kosalaka bongo: mpo na mokolo moko na mikolo motoba oyo etikali, luka obakisa mpo ete na nsima ya poso oyeba kobatela ngonga ya kotikala yo moko.
Made with FlippingBook - Share PDF online