Bunda etumba elamu ya kondima

Minkanda ya kobakisa 139

M onkanda ya kobakisa 1 E zalaka mokolo moko : Lisese ya molóngó na nzela ya masolo ya biblia mpo na mokili Rév. Dr. Don L. Davis Uta bileko na bileko kino bileko na bileko, Nzambe na biso azalaka. Uta bileko nyoso, oyo Ye azalaka na Ye na ndenge ekoki koyebana na bato te, oyo ekokani na nyonso te, liboso ete ntango ya makambo nyonso ebanda, Nzambe na biso ya Moto Moko kati na Bato Mísato azalaki na lisanga na Ye ya nkembo oyo ekoká lokola Tata, Mwana mpe Molimo Mosanto, na nkombo ya NGAI NAZALI, na ntango azali komonisa kokokana ya bizaleli na Ye ya boyengebene, na yango azangi eloko moko te, na bosanto na Ye ezángá ndelo, esengo mpe bonzenga. Na kolandaka mokano na Ye oyo eleki nyonso akamataki mokano ya kozalisa molóngó epayi wapi nkembo na Ye ekokaki komonana, mpe mokili epayi wapi lokumu na Ye ekokaki komonana mpe bato oyo basalama na lolenge na Ye mpenza bákoka kofanda, kokabola bondeko na Ye mpe kozala na lisanga na Ye kati na boyokani ; nyonso mpo na lokumo na Ye. Nani, lokola Nzambe oyo aleki nyonso, asálá mokili oyo etombókélá mobeko na Ye na sima ? Lokola motema ezikaki na kolula, lokoso mpe lolendo, bato mibale ya liboso batombokelaki mokano na Nzambe ntango bakósámákí na mokonzi monene, Satana, oyo miango mabe na ye ya kozwa esika na Nzambe lokola mokonzi, esukaki kaka na kotelemela mokano na Nzambe oyo ebele ya banjelu motango te basalaki na lola. Lokola bazangaki botosi, Adama na Ewa bamikotisaki na mpasi mpe liwa elongo na basangoli na bango ; mpe likolo ya botomboki na bango, bakotisaki bikelamu nyonso na yiki-yiki, na mpasi mpe na mabe. Na nzela ya masumu mpe botomboki, lisanga kati na Nzambe na bikelamo nyonso ebebaki mpe sikoyo biloko nyonso ekótá na libebi likolo ya ekweli wana ya monene –kozonga nsima, kokabwana, mpe ekweli ekomi komonisa makambo nyonso wana polele. Na anjelu moko te, moto moko to ekelamo moko te ekoki kosilisa likambo wana, mpe soki Nzambe akótáká Ye moko te, molóngó mobimba, mokili nyonso mpe bikelamo na ye nyonso bilingaki kobunga. Kasi, na mawa na Ye mpe na bolamo na Ye, Nkolo apesaki elaka ya kotinda mobikisi mpo na kosikola bikelamo na Ye. Na bolingo na Ye oyo eleki nyonso mpe na boyokani, Ye, Nzambe azwaki mokano ya kobongisa libebi ewuti na botomboki ya molóngó, na kotindaka elombe, Mwana na Ye ya likinda, oyo alataki nzoto ya bato ya liboso mibale baye bakweyaka (Adama na Ewa), ye elombe oyo ayambaki mpe alongolaki bokabwani na bango na Nzambe mpe amonaki mpasi na esika ya bato nyonso mpo na masumu mpe bozangi botosi na bango. Na boye, na nzela ya boyokani mpe bosembo na Ye, Nzambe akotaki na lisolo etali bato mpo

Made with FlippingBook - Share PDF online