Bunda etumba elamu ya kondima

142 • Bunda etumba elamu ya kondima

M onkanda ya kobakisa 2 L isolo N zambe azali kobeta Rév. Don Allsman

Motó ya likambo ya mokapo ya makomi komekama ya mbula matali (coup d’etat)

Eteni ya makomi na mokuse

Molongo ya mamá na likambo

Na ebandeli ezalaka Liloba, mpe Liloba ezalaka ná Nzambe, mpe Liloba ezalaka Nzambe. Azalaka na ebandeli na Nzambe. Biloko nyonso esalema na Ye, soki Ye te nde eloko moko na oyo esalema ezali te (yoani 1 :1-3). Yango wana, kaka lokola lisumu eyaka na mokili na nzela ya moto moko, mpe liwa na nzela ya lisumu, mpe liwa epanzani na bato nyonso mpo bango nyonso basumuki (Baloma 5 :12). Bazali baí-Yisalaele, mpe bandima kondimama lokola bana, nkembo, boyokani; kopesama mobeko, losambo, mpe elaka ezali ya bango. Bakulaka (to ba mbuta muntu) bazali ya bango, mpe na kati ya libota na bango, na nzela ya mosuni Klisto azali, Ye oyo azali Nzambe likolo na nyonso, ápámbolama libela na libela. Amen. (Baloma 9 :4-5) Mpo ete na nzela na Eklezia, bwanya ya lisanga na Nzambe ekoka komonisama sikoyo epayi na bakambi mpe bakonzi na bisika na likolo. Yango ebongisámáká kolanda mokano oyo Nzambe akokisá kati na Yesu Klisto Nkolo na biso (Baef. 3 :10-11). Na sima wana nde suka, ntango akozongisela Nzambe Tata bokonzi, wana asilisi kobebisa lokumu, bokonzi mpe nguya ya moto mabe. Mpo ete esengli azwa bokonzi kino ntango akokitisa banguna na Ye nyonso na se ya makolo na Ye. Monguna ya suka oyo akobebisa ezali kufa (1Bakolinto 15 :24-26). Bokonzi ya mokili ekomi Bokonzi ya Nkolo na biso mpe ya Klisto na biso. Mpe Ye akokonza mpo na seko mpe libela na libela (Emoniseli 11 : 15b). Na ntina na yango Mwana na Nzambe ayaki mpo na kobebisa misala ya Zabulu (1Yoane 3 :8).

Nzambe azali na lisanga eleki malamu liboso ya bikelamu. Zabulu na bato na ye batomboki mpe bakotisi mabe

(Liboso ya ntango) Genese 1 :1 a

Botomboki

Nzambe asali moto na lolenge na Ye, Moto oyo asangani na Satana na botomboki. Nzambe azali kobatela bobele kobulisa bato na Ye ete bazala baye ya Ye mpenza, epayi wapi mokonzi akowuta mpo na kosikola bato, ezala bapakano to bayuda. Bilembo ya mwango ya etumba ezali komonana polele na kati ya mobembo.

(Kokelama mpe kokweya) Genese 1 :1b-3 :13

Kolengela noki bato bakota na etumba (Bampaka bakengeli/ patriarches, bakonzi

(Ba rois) mpe basakoli) Genese 1 :14-Malaki

Elonga mpe lisiko

(Kolata nzoto ya moto, Komekama, Bikamwisi, Lisekwa) Matai –Misala na bant. 1 :11

Mobikisi aye mpo na kobotola monguna bibundeli na ye

Mobikisi amonisi mabongisi, na polele, ya kobotola bizweli nyonso epayi ya monguna malembe malembe, yango ezali elembo ya bokonzi ekoya.

Mampingá bazali kopusana

(Eklezia) Misala 1 :12-Emoniseli 3

Kowelana ya suka

Mobikisi yango akozonga mpo na kobebisa monguna, kobala mwasi na Ye mpe kokamata kiti na Ye ya bokonzi.

(Koya ya Klisto ya mibale) Emon. 4-22

Likambo monene elobami kati na Biblia ezali etumba.

Etumba kati na mikonzi

Ezali na mokili oyo makambo ya nsomo mpe ya kitoko ekobima. Ezali na mokili oyo nde bolamu ekoponama na esika ya mabe, bolingo na esika ya koyina, molongó na esika ya kili-kili kati na etumba oyo ezali ntango nyonso na matata mpo na koyeba epayi wapi moto azali ; wana toyebi ete lolenge ya komona moto na ezaleli na ye ya libanda ekosaka ntango mosusu. Kasi, mpo na kobulungana mpe bozoba oyo nyonso ekozala nde mokili oyo etumba ezali koluka se bolamo mpe bato nyonso ya malamo na ya mabe bakoyebana na ndenge ya bango ya solo. - Frederick Buechner. Dire la vérité.

Made with FlippingBook - Share PDF online