Bunda etumba elamu ya kondima

Minkanda ya kobakisa 143

M onkanda ya kobakisa 3 L olenge nini tokoki kobanda kotanga biblia Rév. Don Allsman and Rév. Dr. Don L. Davis

1. Tanga likomi ya yo moko, makomi mpe ata babuku na lisosoli ya ndenge lisolo mobimba ya Biblia ezali. Ndenge nini ekoki kosalema kolanda mabongisi ya Nzambe mpo na kozwa baye nyonso babebisama na ekweli ya kolanda satana ? 2. Tala makambo malamu. Mikotisa kati na makambo ozali komona, tala oyo ezali kozingela yo, oyo ezali kobenda yo ete osala solo. Kanisa nano yango ekokani na nini to ekoki ezali nini. 3. Zala na bokebi ya mibeko, bokebiseli, ba nzela mpe makambo misusu ezali kotinda yo na lolenge na yo ya kobika mpe ya kokanisa na ndenge ete ntango nyonso ólukaka se bokonzi na Nzambe. Ndenge ya kotanga Biblia Mwango ya kotanga Biblia ya liboso (1) : Banda na buku ya ebandeli kino na Emoniseli 1. Banda kotanga na Nsango Malamu ya Yoane ; yango ekopesa yo lisosoli ya bomoyi ya Yesu mpe ekosalisa yo ete ososola makambo ya solo ntango okotanga minkanda oyo etikali. 2. Zonga na Buku ya ebandeli mokabo ya liboso mpo okoka kotanga Biblia mobimba. 3. Koboma ntango na makambo mike mike te kasi, tanga Bibia mobimba mpo oyeba ebele ya makambo na yango ya malamo. Koma mituna na ntina na makambo ya makasi ozali kokutana na yango to makambo ezali kobulunganisa yo mpo otuna moto mosusu to mpe yo moko okoba koluka luka sima ya mikolo. Mwango ya kotanga Biblia ya mibale (2) : Lisungi ya kolandela ntángo mpo na kotanga (www.tumistore.org) Okoki mpe kotanga biblia mobimba mibu nyonso, kotanga mikanda nyonso ndenge ekomama na banganga mayele ya baklisto. Bandimi mingi batangaka Biblia na lisanga mobu nyonso, kolanda ntango babongisela yango, balukaka bazwa lisosoli eleki malamo ya lisolo na Nzambe mobimba na biteni na yango nyonso lokola emonani kati na molongó ya makambo.

Made with FlippingBook - Share PDF online