Bunda etumba elamu ya kondima
144 • Bunda etumba elamu ya kondima
Okoki mpe kozwa lisungi ya monkanda oyo ekosalisa yo soki otali na www.tumistore.org. Lolenge wana babuku etiama na molongo na Makomi Esanto ekosalisa yo na kotanga lisolo mobimba ya Biblia ndenge makambo esálémáká. Yango ekopesa yo likanisi ya Biblia mobimba ndenge ezali kosolola lisolo monene ezali kati na yango kokesana na ndenge buku na buku ezali koloba. Yango ekosalisa biso batangi ya Biblia mibu nyonso ete totala bobele likambo ya ntina mpe motuya kati na makomi : lobiko ewuti na Nzambe na nzela na Yesu na Nasaleta, Ye Klisto. Buku oyo ekopesa yo likanisi mobimba ya makambo ebele ya Biblia mpe ekosalisa yo ososola ntina ya lisolo mobimba ya lobiko na Nzambe oyo eleki malamu mpe ngolu oyo eleki bangolu kati na mosala ya Yesu Klisto : kufa na Ye, kokundama na Ye, kosekwa na Ye, komata na Ye na likolo mpe kozonga na Ye.
Made with FlippingBook - Share PDF online